Loyembo la Mokolo mwa Mokili Mobimba ya Bilenge (MMB) ya Séoul, ebimisani.
Albys KBD, CP – Konshasa/RDC
Yango ezali loyembo oyo ekotikala na ba bongo ya libota mobimba ya bilenge ya eklezya Katoliko, yango wana ezali na ntina mingi ‘te bápona malamu. Nzembo ya mokolo mwa bilenge ya mokili mobimba ya mobù moko mokoyà, ebimisami, atako etikali nayino mbula moko mobimba. Ezali kopesa bokenzu na bokutani boye ya bilenge ya mokili mobimba, oyo ekobanda o mokolo mwa 3 kino 8 ya sànza ya Agusto ya mobù 2027, na Seoul.
Nzembo moko mpo na bato banso.
Esengelaki ‘te motó ya loyembo loye lozala na lokotà ya Latin mpo bato ba bikólo binso bátánga yango. Nkombo na yango: Confidite, Ego Vici Mundum mpe ezongeli mama na likambo, oyo eponamaki mpo na JMJ 2027: “Zalá na mpiko! Ngai nalongaki mokili”, molongo mowùti na Nsango Elamu ya Santu Yoane, na eteni na yango ya zomi na motobà (Jn 16, 33). Lokola bakanisi yango mp ona mokili mobimba, bayembi loyembo loye na bankótà ebele, mingi mpenza na lokótà ya koréa, na lingelesi (anglais), lifalansa (françcais), lokótà ya espagnol, portugais, nà oyo ya italien.
Loyembo lango ezali kobanda nà libyangi liye: “yàkà kolanda ngai, yo motema molali, lamukà mpe otambola”, mpe emoni mbala moko bosengà to eloko bilenge ya libota mobimba ya mokili bazali kozela, mpe molende mpo na molende mpo na kobunda na mokili moye, mozali komona lisusu te, esika ya ndakisa.
Ezali na titre moko kasi lolenge mibale ya koyembela yango. Ya liboso, ezali na lolenge ya miziki ya kala, na lolenge ya koyemba mpe na miziki ya orkestre (na ebandeli ya lisoló oyo). Ya mibale ezali na lolenge ya miziki ya pop (na nsuka ya lisoló oyo).
Koyemba komunio
Ntina ya loyembo lànà ezali mpo ya kopesa bokenzù na ekwelà yango, kotinda mitema na koluka koyeba. Mingi mpenza, ekozala bande-son, ekolakisa ntango inso lolenge oyo ba-dioseze mpe bituluku bya bayambi ya lingomba ya Katoliko bazali komilengele mpo na likita lyango, likambo oyo ezali mokumba monene. Loyembo la Mokolo mwa Mokili mobimba ya Bilenge (MMB) ezali esaleli ya kosakola Nsango ya bokutani bwango. Esimbi mpenza mitema mpe milimo ya bato. Na liyangani moko na moko, ekokani nà loyembo moko, oyo ezali komema bato baye bakosangana na likita linà, na kokanisa mpo ba bosana te.
Loyembo yango ezali kokumisa likambo ya bomoko na bango banso, atako bazali na babendela bikeseni. Eloko yango nde: kondima na bango epai ya Yezu Kristu (boyambi na Kristu). Ezali loyembo ya bondeko, oyo ezali kopesa esengo ya kozala mokristu mpe ezali kolendisa kopalanganisa esengo yango na mokili mobimba.
Kopona nzembo eye, ezali litomba ya concours efungwamaki mp ona bato banso. Basengelaki kokéla na bontoki nzembo moko oyo ekoki kolimbola maman a likanisi ya MMB (JMJ), oyo elobi: “Prenez courage, j’ai vaincu le monde”, (cfr (Jn 16, 33). Likambo yango elongaki: Batindaki mikanda nkàmà mineyi na tuku misato na mineyi (434), kati na yango, nkàmà mibale na tuku libwà (294) ewutaki na mikili misusu. Na nsima, Dikastele mp ona balayiki, mabotà mpebomoyi ya Saint-Siege, endimaki nzembo yango.
Ba MMB (JMJ) ya ba-Koréa
Francis Jiyoon Kim, alàngà-nzembo moko ya Koréa nde asalaki loyembo loye lango; bongo apesi yango langi ya ekolo ya yé mpe ezalela ya mimeseno ya ekolo yango. Bayembi yango mingi mpenza na lokótà ya Koréa, korali esangani nà baloko ya miziki ya bonkoko ya mboka, nzokandé babongisi yango maalamu mp ona eleko eye ya biso. Bilili bya yango ezali kolakisa bitando mpe bisika ya bilembo ya kitoko ya Séoul. Epesi bongo limonisi yao yo ekozala bokutani na eleko ya molunge, oyo ezali koyà.
Lokola ezali momeseno, “mikolo o kati ya badioseze” ekosalema loboso ya liyangani o mboka-mokonzi. Kobanda mokolo mwa 29 ya Yuli kino mokolo mwa 2 ya Agusto ya mobù 2027, badioseze zomi na mitano ya Korea bakoyamba bato bamobembo na ba paloase ya bango mpe na mabota. Bakopesa bango esika ya kovanda mpo na kokóta na bomoyi bwa eklezya ya bamboka, yambo ‘temilùlù mya Séoul ebanda. Sima ya mibù tukù misato na Manille na 1995, Mikolo mya mokili mobimba ya bilenge oyo, ekozala ya mbala ya mibale elengelami na mabele ya Aziya. Kasi ezali mbala ya liboso ezali kosalema na ekolo eye, bakatoliko bazali na motango ya nsé. Na Korea ya Ngele (Sudi) bazali kaka bato pene ya zomi na mibale, na kati ya biyamba ndenge na ndenge.
Etapi ezali koyà
Bato bamobembo bakobanda kokomisa bankombo ya bango na sànzà ya Okotobé. Ezali kolakisa modele ndenge na ndenge, lolenge ya mikolo okosàla mpe makambo ekoleka. Bazalo kolelengela ba application mobile mpe système logistiki integré mpo na kotambwisa malamu . Tozali kosala manso mpo 'te Mokolo mwa Mokili mobimba ya Bilenge (MMB) ya Séoul 2027, eleka malamu mpe ezali eyenga ya Elikya mpe litatoli ya boyambi mpe bomoko ya Koréa mpe ya Séoul, elobi Mgr Peter Chung Soon-taick, episkopo ya archidioseze ya Séoul mpe mokambi ya komite oyo ezali kolengela nteke to feti yango.
Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye