Liyebisi ya Addis-Abeba ya SCEAM mpo na mateya ya Katoliko na Afrika
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Liyebisi ya Addis Abeba ezali mbuma ya mosala ya Liyangani ya yambo ya kontina mpo na likambo ya mateya ya Katoliko, oyo esalemaki na Addis Abeba kobanda mokolo mwa 5 kino 8 ya sanza ya mwambe to Agusto ya mobu moye 2026. Baye batiyaki mokoloto na mokandà monà, ezali : bakambi ya masàngà ma baepiskopo, ba episkopo, balakisi ya Katoliko, bakambi ya baeteyelo ya likolo mpe ya bakelasi, bamibonzà, ba layiki mpe bilenge bawùtaki na Afrika mobimba mpe Madagascar.
Basangani bandimaki lisusu ‘te «mateya ma katoliko, ezali mosala mwa ntina ya eklezia, esàleli ya motùyà mingi mpo na kopalinginya Nsango Elamu, bokasi makasi mpo na kobongisa bomoto mpe esàleli ya ntina mingi mpo na bokóli ya moto mobimba». Na lisalisi lya Nsango Elamu, Pacte Mondial mpo na Mateya mpe ya libulà ya mimeseno ya bonkoko ya Afrika, mokanda yango emonisaki ‘te mateya ezali na ntina mingi mpo na avenire to mpe mikolo mizali koyà ya kontina.
Kobongisa bato basimbami na boyambi mpe na lotomo la bomoto
Liyebisi lyango ezali komonisa mitindo mingi ya mateya, oyo esimbi lolenge mosàla ya koteya ya eklezya. Na ndakisa, elobi ‘te: “lokùmu la moto na moto, oyo akelami na elilingi mpe bokokani nà Nzambe” nà mpe “lotomo la mwana na mwana mpe elenge na elenge, oyo bakoki kolongola tè, ezali ya kozwa mateya makelasi malamu, oyo esimbami na bosóló, bosémbo, boyambi mpe lokùmu la bomoto”.
Mokanda moye mobeti nsete na likambo ya mokumba ya mabotà, oyo moto akoki kolongola mpo atiya mosusu tè; mpamba tè, mabota mazali “balakisi bayambo bya bana babango”. Elobeli mpe lisungi ya baeteyelo ya Katoliko na kopesa loboko mpo na kotonga mboka, kimya, bokambi ya bizaleli malamu, bokóli ya siansi mpe mbongwana ya bomoi ya bato. Eteyelo ya Katoliko emonisami lokola “ebongiseli ya ntina mingi mpo na koyekola kotonga bokangami ya kimya mpe ya boyokani kati na bato”.
Kopesa biyano na mikakatano ya Afrika kya mikolo mya biso
Baye batiyaki mokoloto na mokanda eye, bayebi malamu mikakatano boni mateya ya katoliko ekutanaka na yango: Bobolà, bitumba, kokima mboka, kozanga mosala, bokeseni, mbongwana ya klima, kobeba ya bizaleli milamu mpe kozanga makoki ya koteya. Nzokandé, bamoni mabakù mingi mpo na kobakisa lisusu mosala ya koteya ya Eklezia, na kati ya tekinoloji, bolukiluki, mayele ya sika, mayele ya kosala (intelligence artificielle) mpe boyokani na kati ya mikili. Liboso lya makambo maye manso, bandimi kokolisa bomoto ya biteyelo ya Katoliko, kolendisa mateya ya mobimba mpenza - ya molimo, ya bizaleli milamu, ya mayele, ya bomoi ya bato mpe ya ezingelo, mpe kotiya mbongo mpo na kobongisa balakisi mpe bakambi ya biteyelo.
Esengi mpe ‘te bakelasi bizala “ya malamu, ya kofungwama, ya polele mpe ya kobatela bana mpe bato oyo bazali na likàmà” mpe epesa libakù ya “kokolisa makoki ya kozwa mateya malamu mpo na babola, bato oyo bazali na mbeba, bato oyo bakimá mboka mpe bato oyo bamangomba bazali kobwakisa na nse ya bato banso”.
Etali mpe bolukiluki, makambo masika (innovation) mpe entrepreneuriat mpo na kopesa nzela na kofungola misala mpe kokokisa bosengà to bamposa ya bilenge ya Afrika, mpe mateya oyo epesami na ecologie intégrale mpe na kobatela biloko bizalisami.
Libyangi ya komema mokumba elongo mpe komisio ya kontina mpo na kolandela makambo
Na nsima, Liyebisi lya Addis Abeba esengaki na bato banso oyo likambo lyango etali. Ba Conférences épiscopales babyangemi na kosàla na mateya ma katoliko, “eloko ya motuyà (priorité pastorale)”, nakotiya na nzela ya bibongiseli ya mboka, bandako ya malamu mp ona yango. Ba byangi mpe bambulamatari ya bikolo, mp ona koyeba mpe kosunga na kopesa maboko na baeteyelo ya katoliko mpo na bokóli ya ekolo. Mokanda mwango elobeli mpe lokola, ba eteyelo ya likolo (universités), ba mangombà ya bamibonzà, ba mabotà, mpe ba partenaires internationaux, mpo ‘te balendisa boyokani na bango mpo na kosunga mateya ya katoliko na Afrika mobimba mpe na Madagascar.
Basengi bakéla komisio episkopale moko ya SCEAM mp ona mateya ma katoliko, mp ona kolandela makambo yango. Komisio enà ekozala na mokumba ya kobongisa ebongiseli moko mpo na kontina; mokumba mosusu ezali ya kotya bibongiseli mpo na kolandela makambo mpe kotalela yango, kosalisa kotambwisa masàngà ya baepiskopo na mikano mya bango, mpe mpo na kobongisa mayangani ya kontina mbala na mbala.
Na nsuka, balobi ‘te bazali na elikya ‘te: “mateya ya katoliko ekotikala mwinda mwa elikya, mwa boyambi, mwa boyebi, bosembo mpe kimya mpo na Afrika mobimba mpe Madagascar”, na mosala mwa Eklezya mpe mpo na bokóli bwa bato ba Afrika mobimba.
Matondo mingi na ndenge otangi lisolo eye.