Luka

2026.08.04: Na mokolo ya bofungwami ya liyangani linene ya mibale ya bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo,, Dar es-Salam, na Tanzanie. 2026.08.04: Na mokolo ya bofungwami ya liyangani linene ya mibale ya bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo,, Dar es-Salam, na Tanzanie.  

Bofungwami ya liyangani linene ya bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo, na Dar es- Salam

Misàlà mya liyangani linene ya mibale ya bato ba Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo, efungwamaki o mokolo mwa 3 Agusto 2026 na Dar es-Salam, na Tanzanie. Thème ezali nde, «kokotisa mimeseno mya milulu ya losambo ya bamboka misusu na Afrika». Na nzela ya bilili, tata episkopo wa lokumu Roche, prefet ya dikastele mpo na culte divin mpe discipline des sacrements. Mpe nà lisukulu ya Ambongo, mokambi ya Sceam. Bakolikya ‘te mbuma ya misala ya liyangani liye esunga misàla ya baeklezya ya Afrika.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Moziki ya ba liturgistes ya baeklezya ya Afrika balengeli liyangani monene ya mbala ya mibale na Dar es-Salam mboka-mokonzi ya Tanzanie, kobanda mokolo mwa 03 kino 09 ya sànzà ya Agusto 2026. Na motó ya likambo, «ezali likambo ya kokotisa mimeseno ya milulu ya losambo ya bamboka misusu na Afrika: Misala mpe makanisi». Ezali kokóba liyangani oyo esalemaki na Dakar na Senegal en 2023. Na libaku liye, bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo, bakanisi na ntina ya makambo ya losambo na Afrika. Bamonisaki makambo ya malamu mpe mikakatano, mpe bamonisaki lisusu ‘te bazali na mposa ya kolendisa losambo ya solo.

Lelo oyo, baliturgistes oyo ya Afrika bakutani kaka mpo na kokoba na masolo na bango kati na liturgie mpe likambo ya kokotisa mimeseno ya milulu mya losambo ya bamboka misusu, kasi mingi penza mpo na kotiya yango na mozindo, kososola elongo nzela ya kolanda mpe kobandela lisusu mosala na bango ya kosunga Eklezia na Afrika. Na likita liye likosamema na «Kurasini Center» na Dar es-Salam, bakozala mpe : Fridolin Ambongo, archeveki metropolitain ya Kinshasa mpe mokambi ya Sceam, Mgr Simon Masondole, episkopo ya Bunda mpe mokambi ya komisio national ya liturgie ya Tanzanie mpe Mgr Salutalis Libena, episkopo ya Ifakara, moko ya lisanga ya baepiskopo ya Tanzanie

Likambo moko ya ntina mingi

Ut’o mboka Roma, basepelaki mpo ya likanisi liye. Episkopo wa lokumu Arthur Roche akanisi ‘te : «Makanisi maye malelo ma ntina mpo ya likambo ya kokotisa mimeseno ya milulu ya losambo ya bamboka misusu (inculturation liturgique) ekosala mosala mwa motùya na Eklezia, mpo ezali kosimba motema mpenza ya bomoyi ya Bokristu: bokutani nà Nzambe o kati ya mibombamo tozali kokumisa to kosepela na kati ya bokeseni ya mimeseno ya bonkoko ya Afrika». Akóbi na koloba ‘te: “Mokano mwa bango, ezali na ntina mingi leloyo, mpamba te, Eklezia esengi kososola na bozindo lolenge bani Nsango Elamu ekoki kobotama na bikolo ya bato misusu, kozanga ‘te ebungisa ata eloko moko ya bosolo na yango mpe nguya na yango ya kobikisa”.

Na Misa ya bofungoli liyangani monene ya bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo, na Dar es-Salam
Na Misa ya bofungoli liyangani monene ya bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo, na Dar es-Salam

Kokotisa mimeseno ya bamboka misusu mpe mobombamo mwa Liloba ekomi moto

Tata episkopo wa lokumu Roche alobi ‘te bokotisi mimeseno ya losambo ya bamboka misusu ezwi makanisi na mobombamo ya liloba lya nzambe oyo ekomaki moto. Lokola liloba lya Tata endimaki kokóma mwa lisolo moko, ya momeseno mpe ya bomoto mpenza, sé lolenge lonà milulu mya losambo ebyangemi na kosakola mobombamo mwa Kristu, na nzela ya elobeli, elembo mpe mitindo mya mayele mpe ndimbola na yango mpo na bato na bato. Akolikya ‘te na nzela ya milulu mya losambo, boyokani ya kokàmwa oyo ebandaki na tango ya kobotama ya Kistu ezali kokóba kobota mbuma na kati ya bomoyi bwa Eklezia.

Ntina ya kokotisa mimeseno ya bamboka mosusu 

Bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo.
Bato ya Afrika oyo bayekolaka milulu mya losambo.

 

Elili ya kala
Elili ya kala   (@Vatican Media)

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye

 

 

04 sánzá ya mwambe 2026, 14:36