Luka

Lisàngà lya ba episkopo ya ekolo ya Zambie, o mokolo mwa zomi na mwambé ua sànzà ya Yuli ya mobù 2026 (18 juillet 2026). Lisàngà lya ba episkopo ya ekolo ya Zambie, o mokolo mwa zomi na mwambé ua sànzà ya Yuli ya mobù 2026 (18 juillet 2026).  

Zambie: Ba episkopo basengi lisolo lya kimya na mboka, na bobelemi bya maponomi

Awa ekolo ya Zambie ezali kolengele maponomi ya mokambi ya ekolo o mokolo mwa zomi na misato ya sànzà ya Agusti (13 aoùt), ba episkopo ya Katoliko babimisaki mokanda moko ya pastorali. Mokanda monà mozali kobyanga na kampanye mpe maponomi ya kimya. Ezala na mobulu te, ememya mibeko mya bomoi ya ba sivili.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ekolo ya Zambie ezali moko ya bikolo ya Afrika ya kokamwa ; mpamba te, etikala koyeba bitumba ya basivili té, ut’o ezwaki lipanda na yango na mobù 1964. Elekisaka bokonzi na boboto nyonso, ut’o parti politiki moko na mosusu. Komisio ya maponomi ya Zambie epesi motango ya bakandida zomi na mibale (12 candidats) na maponomi ya mokambi ya mboka oyo ekosalema o mokolo mwa zomi na misato ya sànzà ya Agusti (13 aoùt). 

Kati na bango, Hakainde Hichilema, nkombo ya mokonzi oyo azali kobima na bokonzi. Parti politiki na ye ezali UPND, oyo elimboli na lokotà ya lifalansa: Parti uni pour le développement national, bongo na lingala, lokola ‘te: parti ekotalaka makambo ya bokoli na mboka. Nkombo mosusu ezali ya Brian Mundubile, mokonzi ya parti politiki NRPUP, oyo etalaka makambo ya boyokani mp ona bomoko mpe bofuluki ya ekolo. Nà mpe nkombo ya Citizens First Harry Kalaba, mokambi ya parti socialiste Fred M’membe.

Kimya ezali bozangi ya matata te

Ut’o ezwaki lipanda na yango, ekolo ya Zambie etya misisa na yango likolo lya kimya to boboto”; bakundoli yango baepiskopo yango na mokanda mwa bango ya pastorale. “Tozali bongo na chansi ya kozala bato oyo bitumba ya basivili nà bopanzani ya makila elónga biso tè, lokola esalemà na baninga ya nzonga-zonga ya biso. Ezali kimya eye ezwami na mpamba ‘te, kasi ezali lifuta etongami mibù na mibù, n abato ba Zambie bango moko. Baponaki kolekisaki liboso masolo, na esika ya kondongwana. Yango nde etikali kino moyi mwa lelo na makoki ya kobungisama tè”.

Ba episkopo balobi yango malamu ‘te: “kimya ezali kozanga matata tè, kasi ezali lifuti lya bosembo, botósani mpe ya bondeko kati na bayimboka. Misala minso ya mobulu ya mopelengano to politiki ememaka bozangi botosi na lotomo ya bato, enyokoloko bolamu bwa bato banso mpe elongolaka konfiansi na makambo oyo sosiete ekoki kotyela motema na demokrasi” 

Baepiskopo ya Zambie baséngi polele ‘te bato básala bakampanye mpe maponami oyo ezangi mobulu.

“Tolingi kozala na bilongi mibale tè na likambo lya mobulu; mpamba tè, ekoki kozala ntalo ya bomoyi bwa bato. Mosala moko te ya mopelengano (politiki), to elónga ya maponomi moko te mpe grief moko te, politique to mosusu, ekoki kokotisa botomboki, ekoki kobangisa to kosopa makila. Mobulu ya politiki, ezala oyo esalemi na motema motomoto ya mosala to oyo ekanamaki liboso, esengeli ata moke te kondimama na moto moko, azala ya ngambo nini.”

Ebele ya mayebisi na ba rezo sosio to internet

Ba episkopo balobeli mpe baye bazali kobimisa mobulu mpe ba trolls ya politiki na nzela ya rezo sosio. Makambo manà ezali kotumba mitema y abato mpe ezali kotumbola koswana mpe ezali komema na boyinani. “Balobelaki mpe lokola, bato baye bazali na mosika to na libanda ya ekolo, ba oyo bazali kofuta mbongo, to baye bazali kondima mobulu, …. Mpe baye bazali kosalela nzela ya singa mpo na kopalinginya boyinani, koloba lokutà, kotya bililingi oyo ezali kopusa bato na botomboki, na esika ya kopesa bango bansango malamu”.

“Oyo akozala nye to akobomba likambo ya mobulu ya bato ya parti na ye, ekozala neti azali kondima ezalela ena ya mobulu. Na yango tozali kosenga na bakambi ya parti politiki nyonso, balobela polele bato na bango, yambo te maloba maye mazala sé malele mpamba.”

Baepiskopo babwaki lisusu mbela na bilenge ya ekolo ya Zambi; mpe ba byangi bango, batika tè ‘te babongwana na bisaleli ya mobulu (basalela bango lokola bisàleli ya mobulu). Basukisaki mokanda mwa bang ona losambo la Santu François : «Mokonzi, sala na ngai esaleli ya kimya na yo … »

Hakainde Hichilema, mokambi ya ekolo ya Zambie,.
Hakainde Hichilema, mokambi ya ekolo ya Zambie,.

Mbulamatari esepeli na liyebisi lya ba episkopo

Hakainde Hichilema, Mokambi ya ekolo ya Zambi, asepelaki mingi mpo na nsango ya ba episkopo ya lisanga lya baepiskopo ya Katoliko na Zambie. Mingi mpenza, lolenge babwaki mpe bapaleli likambo lya mobulu, kobangisa bato mpe kokela boyinani ya mopelengano to politiki.

Na liyebisi moko ya bopanzi nsango , Clayson Hamasaka, Mokambi ya kominikasio ya zambi alobaki ‘te, maloba ya pastorale ya ba episkopo ekokani nà mbéla ya Mokambi ya ekolo, mpo ‘te maponomi maleka na kimya, na bonsomi, na molongo mpe na bondimami.

 

Matondo mingi na ndenge otangi liyebisi liye. 

19 sánzá ya nsambo 2026, 10:05