Mgr Emmanuel Adetoyese Badejo., Episkopo ya dioseze ya Oyo, na Nigeria. Mgr Emmanuel Adetoyese Badejo., Episkopo ya dioseze ya Oyo, na Nigeria. 

Na Nigeria, Mgr Badejo azwi libondisi nsima ya kobikisama ya bato oyo bakangaki na Oyo

Emmanuel Adetoyese Badejo, Episkopo ya dioseze ya Oyo, na Nigeria, alobaki ‘te motema na ye ekiti mpo ‘te bayekoli to bana ya kelasi mpe balakisi oyo bakangamaki na Etukà ya Oyo, babikisami.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Bapanzi-nsango ya Nigeria, balobi ‘te, bayekoli to bana ya kelasi tukù misato na libwà elongó nà balakisi mitanto (39 élèves et 5 enseignants) oyo babikisamaki, bakangamaki na etando ya Oriire, na Oyo. Batyaki bango na boloko mikolo tuku mitano nà motóbà (56 jours). “Na tondi botondi Nzambe ntà bokasi oyo akokisi makambo maye. Na pesi maloba malongonya mpe matondi na Mokambi Bola Ahmed Tinubu, na mbulamatari ya Oyo, na ingenieur Seyi Makinde, na ba oyo bazali kosala mosala ya kobatela mboka, na bapanzi sango, mpe na bato banso oyo bazalaki kobondela, kosenga mpe kokila bilei mpo ‘te likambo liye ya esengo esalema”, elobaki Mgr Badejo na liyebisi moko.

Basokoro babungisaki bomoi bwa bango

Mapingà ya basoda ya Nigeria balobi ‘te basokoro bayiké babungisaki bomoi bwa bango, na tango ya misala mya kobikisa. Episkopo Badejo amonisaki mawa ma ye mpe apesaki lisungi na ye na mabóta ya bato oyo bakufaki na ntango ya mosala. Bongo asengaki ‘te ekwelà enà, ezala lokola elembo ekosalisa bango na bomoko koleka. Tozala na bokengi elongo mpo ya bomoi mpe biloko bya biso. Tika ete makambo maye ma nsomo esila o kati ya ekolo ya biso Nigeria, elobaki wayambo ya Oyo.

Na mokolo mwa lomingo, mwa 12 ya sanza ya Yuli, baboti mpe bandeko ya bana ya kelasi oyo babikisamaki na engumba ya Oriire, na Oyo, bayebisaki na zulunalo Punch ya Nigeria esengo mpe matondi na bango mpo na likambo liye. Balobaki ‘te bazali na mposa makasi ya komona bana na bango. Seyi Makinde, gouverneur ya Oyo, akei kotala bato oyo bazwi lisungi na lopitalo.

Lisalisi lya monganga mpe ya makanisi

Bakonzi ya Nigeria bazali kosala sik’awa ba ekizame ya monganga, kosalisa bato oyo bazwi likàmà mpe bazali kopesa bango lisungi ya makanisi (soutien psychologique). Liyebisi moko ya zulunalo Punch emonisaki ‘te, etulùkù ya bateroriste bazali lisangà nà Jama’atu Ansarul Muslimina fi-Biladis Sudan, oyo eyebani na nkombo ya Ansaru. Yango nde ezali ntina ya bokangami ya balakisi mpe bana ya kelasi ebele. Nazali kosambela ete manso masalema mpo na «kozongisa bato oyo bakangaki na makasi, na esika na bango ya malamu, baoyo bakutanaki na makambo ya nsomo», elobi Mgr Badejo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

14 sánzá ya nsambo 2026, 07:26