Luka

Elili ya kala ya Medjugorje Elili ya kala ya Medjugorje 

Esika mosantu ya Medjugorje oyo ebebisamaki, etikali ya kofungwama (polele)

Biro ya paloasse ebyangi na losambo, bolimbisi mpe kokila bilei, nsima ya kotumbama ya lotale ya libanda ya ndako-nzambe Saint-Jacques. Moto enà, esalaki ba mbébà mingi. Batumbaki mpe lokola, ekeko ya Ngondo Maria. Lapolo moko elobaki boye: «Bisika binso bipétolamaki malamu; nde lapolo moko elobi ‘te, ndako yango ekoki lisusu kozongela mosàla ya losambo».

Bansango ya Vatikan

 

Esika mosantu ya Maria (Sanctuaire), oyo bato koleka miliyo moko bakendaka kotala mbula na mbula, etikali ya kofungwama mpo na bandimi banso, elobi biro ya paloase ya Medjugorje. Liyebisi moko elobi ‘te : «Na mokolo mwa mibale, mwa 28 ya Yuli, ndulu ya losambo ezali kotambola malamu mpe bisika binso bizali kopetolama mpe kozongisama na molongo, na ntina ‘te ekoma esika ya losambo mpe ya kokutana na Mokonzi, na nzela ya lisungi to bolobeli ya Mokonzi-mwasi ya Boboto (La Reine de la Paix)».

Na butù ya mokolo mwa yambo mpo na kokoma o mokolo mwa mibale, babébisaki mpe batumbaki ndako-nzambe oyo ezwami na Bosnie-Herzégovine, oyo ezali na ntaka ya bakilometele nkàmà tukù minei (140 km) nà Sarajevo. Ba mpulisi bakangaki «mowùtà moko ya mompaye» ya mibù tukù misato na moko ; balobi ‘te akomaki bakambo mabé mpo na kotùka ekeko ya Ngondo Maria, oyo bamoni sima ‘te maboko mpe elongi na yé ebebisamaki na langi ya moyindo (mwindu). Bakanisi mpe lisusu ‘te, atiyaki móto na lotale ya libanda ya ndakonzambe Saint-Jacques, oyo ezali na katikati ya esika esantu (sanctuaire) yango. Na mpasi mpe mawa mingi «Toyokaki nsango ya makambo malekaki ya mabé oyo ebebisaki bisika ya losambo ya paloase na biso», elobaki Biro ya paloase. Epesi mpe melesi na baye banso basanganaki mpo na kosalisa na mosàlà ya kopetola to kokombola mpe kobongisa na lombango bisika binà.

Kosambela, Kokila bileyi mpe kolimbisa

Esika yango ya bosantu ezali kobynga bandimi banso ‘te bàyanola na likambo liye,  “lokola ngondo Maria ateyaki biso na bowùmeli bya mibu koleka tukù minei na Medjugorje: na nzela ya mabondeli to losambo, kokila bilei mpe kolimbisa”. Biro ya paloase esengi kosambela mpo ya mbongwana ya moto to bato baye basalaki mbébà enà, n antina ‘te “Mokonzi Nzambe asima ye to asimba bang ona ngrasya ya yé mpe atambwisa yé to bango na nzela ya bolamu”. Mbéla ya losambo, esengami lolenge yoko mpo na kimya o kati ya motema ya moko na moko. Kutu na liyebisi lina, tokoki kotanga boye : «Mama wa biso (Notre Dame) azali tango inso kobyanga biso, tózala bato oyo batiyaka kimya. Na yango, tiká ‘te ye alendisa biso tótalela libyangi na ye lokola eloko ya na motuya mingi koleka, kozongisa mabe na mabe te, kasi komonisa bolingo, motema mawa mpe elikya». Likambo wana ya kobebisa biloko esalemaki mwa mikolo liboso ya “Mladifest” (kobanda mokolo mwa 1 kino 6 Agústi), likita ya mabondeli oyo esangisaka mbula na mbula bilenge koleka 50.000 oyo bautaka na mikili ndenge na ndenge ya mokili mobimba na Medjugorje.

Medjugorje, esika ya ngrasya, oyo Nzambe aponaki mpo ya kokutana na bato ba yé.
Medjugorje, esika ya ngrasya, oyo Nzambe aponaki mpo ya kokutana na bato ba yé.   (AFP or licensors)

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye. 

 

29 sánzá ya nsambo 2026, 09:13