Luka

Elilingi ekolakisa boponomi bwa Episkopo moko Elilingi ekolakisa boponomi bwa Episkopo moko 

Episkopo ya sika aponami na RDC

Pàpa Léon XIV aponi, o mokolo moye ya misato mwa 29 ya Yuli, Sàngó Eustache Ntamwe Makoyo episkopo ya dioseze ya Kabinda, na kati-kati ya Répibliki démokratiki ya Congo. Kino lelo, azali moko ya dioseze yango, mokambi ya likindo ya bolengeli (Séminaire préparatoire) ya Saint-Charles-Borromée ya Kabinda.

Bansango ya Vatikan

 

Mgr Eustache Ntambwe Makoyo abotamaki na Musoshi, o mokolo mwa 14 ya febwali 1974 na Répibliki démokratiki ya Congo. Ayekolaki philosophie na likindo ya Saint-Paul VI na Kabinda mpe théologie na oyo ya Christ-Roi na Kananga. Akulaki bonganga o mokolo mwa 28 ya Agùsti ya mobù 2005 mpe akotaki na dioseze ya Kabinda, azalaki kosala misala ndenge na ndenge, nzokande azalaki kokoba nayino na kelasi na ye.

Na 2005 kino 2006, episkopo oyo ya sika, azalaki Mokambi-Molandi ya Likindo ya bolengeli (vice-recteur du séminaire préparatoire) Saint-Charles-Borromée ya Kabinda. Liboso azalaki na mokùmba ya Motambwisi ya molimo ya likindo ya moke Saint-Pie X mpe Mokambi ya Komisio diocesain ya liturgie, kobanda mobù 2006 kino 2011.

Mgr Eustache Ntambwe Makoyo asalaki eteyelo ya likolo na musicologie (2029), azali mpe na diolomi ya chant pedagogiki, azwaki yango na 2021 na eteyelo ya Institut Pontifical de musique sacée na Roma. Lisusu, azali na Master na musique liturgique na Institut Pontifical de Liturgie Saint-Anselme ya Roma na 2021.

Mgr Makoyo azali mpe na Doctorat na Musique et Arts du Spectacle, spécialité ethnomusicologie, azwaki yango na 2025 na eteyelo ya likolo ya Tor Vergata ya Roma. Azali mpe Collaborateur pastorale na kominoté pastorale ba-Trois-Archange na Livorno na Italie, kobanda 2021 kino 2025. Kino sik’awa, azalaki, kobanda 2025, mokambi ya likindo ya bolengeli (Séminaire préparatoire) ya Saint-Charles-Borromée ya Kabinda.

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye

30 sánzá ya nsambo 2026, 11:42