Kotelemela ya boyambi: mpo na mobeko ya kosukisa bomoi liboso lya Liyangani monene na Ekolo ya France, o mokolo mwa misato mwa 15 ya sànzà ya Yuli 2026.. Kotelemela ya boyambi: mpo na mobeko ya kosukisa bomoi liboso lya Liyangani monene na Ekolo ya France, o mokolo mwa misato mwa 15 ya sànzà ya Yuli 2026.. 

Eklezya ya France ezali kotalela likambo lya kosenga lisalisi mpo na kokufa

Na Paris, liyangani ya Ekolo (Assemblée nationale) endimaki na mpokwa ya mokolo mwa misato mwa 15 ya sànza ya yuli, mobeko mwa sika moye mozali kopesa moto lotomo ya kozwa lisungi mpo na kokufa. Ezali mokanda mobetamaki ntembe na boumeli bwa mibu minei mo wùti koleka, kasi eklezya etélémélaki yango. elobaki ete ndeko moko akoki te kopesa liwà na bandeko basusu.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mpokwa ya mokolo mwa misato, mwa tango moke nsima ya mokano ya nsuka bakamataki mpo ya mobeko etali lotomo ya kosalisa moto akufa, Eklezya ya France eyokaki mawa mpo na liponi liye ekataki boyokani na momeseno ya kala ya kosalisa bato baye bazali na mpasi, mpe ya kosunga moto nyonso kino na nsuka ya bomoi bwa ye. Baepiskopo bakanisi lisusu lolenge basanganaki na masolo, na maye matali likambo lyango na boumeli ya mbula minei miye mileki, mpe bamonisi mayele oyo eklezya esali na boumeli ya bankàmà ya bambula mpo na kosalisa bato ya maladi, bato oyo bazali kokufa mpe mabota ma bango. Bàbanzi ‘te, mibeko mya lolenge lonà ekobongola etaleli oyo bato batalelaka bolembu bwa nzoto, bobange, bibosono (l’handicap) to mpe bokono to bamaladi. Kasi balembi nzoto te, lisóló esili nayino te, elobi bango. Makambo mingi ekoki kosambisama na tribinale. Mituna-lisolo elongo na Mgr Mathieu Rougé, episkopo ya Nanterre mpe molobeli ya baepiskopo ya France mpo na maye matali nsuka ya bomoi.

Mgr Matthieu Rougé, mpo na oyo etali mobeko ya bososoli, lolenge kani ezali kosalelama na biteyelo bya Katoliko?

Lolenge mibeko miponomi, esengi bososoli mpo ya baminganga. Nzokandé esengi bososoli bonà na bandako batekaka bankisi te (les pharmacies). Mpamba te, ekoki kosalisa lokola esika epai wapi, bato bakoki kokende kozwa makoki to monó mpo na kosalela likanisi lya kosukisa bomoi. Eloko ezali kotungisa, nayino likanisi ya komipesa liwa, ezali bisikà biye binso bazalaka bobele na makanisi manà, sik’awa bazwi sé nzela ya kokokisa yango, sima ya mobeko moye mobimi. Ezali likambo ya bososoli te, mbamba te, bososoli ezali ya moto yemoko, kasi, ezali likambo lya esikà bato bavandi.

Mpo na likambo lyango, Leta elakaki episkopat ya ekolo ya France, kasi ekokisi yango nayino tè. Mitungisi mizali mingi na ngambo ya ba etablissements congreganistes. Na zali kokanisa mingi mpenza na mangomba ya ba Petites Sœurs des pauvres, na mpe oyo ya ba sœurs de saint Thomas ya Villeneuve, oyo bazali babateli to bakengeli ya ba maternités ya Katoliki. Etablissema mosusu ezali oyo ya Jeanne Garnier na Paris. Esengeli kolikya ‘te na baposo oyo ezali koyà, makambo ndenge na ndenge ekopesa nzela na bososoli ya ba établissement, mpo ‘te bibongiseli biye bizali na lisoló ya kala, oyo ya sika, to mokanda ya mibeko ya bizaleli malamu oyo ezali koboya koboma moto, elónga kokóba na mosala mwa yango mpe na bizaleli bya bango ya malamu.

Na tango ya liyangani ya ekolo (Assemblée nationale) mpo na kopona mobeko mwa sika moye mozali kopesa moto lotomo ya kozwa lisungi mpo na kokufa.
Na tango ya liyangani ya ekolo (Assemblée nationale) mpo na kopona mobeko mwa sika moye mozali kopesa moto lotomo ya kozwa lisungi mpo na kokufa.   (ALICE SACCO)

Nini ekoki kozala liloba lya Eklezya ya France lelo ?

Na mokolo mwa misato, mwa 15 ya sànza ya Yuli, lisànga lya baepiskopo ebimisaki mokanda moko oyo mokambi na yango mpe bakambi mibale ya lisanga batyaki mokoloto to sinyatili na yango, epai wapi emonisaki mawa mpe bomitungisi na biso. Na mibeko mya lolenge lónà, tokoki te komeka mbuma nyonso na oyo etaleli bondeko, bomoi bwa lisanga, kofungwama mokemoke ya mibeko. Na yango, tosengeli kokengele makasi. Sikawa, esengeli kokende liboso, na ndakisa na kolandela bonsomi ya solo ya biteyelo, na kotosa mibeko na yango ya bizaleli malamu, na kolendisa mpe na kolandela na likebi mpenza bibongiseli binso oyo nalobeli.

Ezali na bato oyo bazali bango moko, bazali na bolembù, bazali na likama, babwakisa bango, bazali bango moko, mpe bakoki kokende kovanda elongo nà bango te. Na ntina ya likambo moko ya ntina mingi oyo etali bomoyi ya moto, bato yango basengeli kopona bango moko na nsuka ya bomoi na bango: kozala na bomoi to kokufa.

Eyano ya bakristu liboso ya koponama ya mobeno moye, ezali te kaka ‘te bazali koboya yango, kasi ezali mpe kosenga ‘te bándima yango.  Ndéomoni ‘te na liyebisi tobimisaki o mokolo mwa misato na mpokwa, tozalaki kolendisa bakristu na komipesa makasi, bazala pembeni ya bato bazali na bolembù, bazali bango moko, mpe bazali na eloko tè. Liboso, ezali bondeko ya makasi ndé tokoyanola na mposa ya kosukisa yango. Mbala mosusu ekotaka na mitema mya bato oyo bazali na mpasi mingi mpe bazali bango moko. Eyano na biso ezali na nzela ya bomipesi na bondeko, nzokandé na ezalela ya malamu tè. Tika ete bakristu ya France, koleka mibeko oyo ezali kaka mibeko, bazala ntango nyonso na mokano ya kolanda nzela ya bondeko. Yango nde ekosalisa biso tóboya ‘te koboma bato na nko ekóma likambo monene na mboka na biso.

Na sima ya sànzà mibale, Pápa Léon XIV akokende kotala ekolo ya France. Eloko nini bozali kozela ‘te yé aloba mpo na likambo liye?

Na yango, na yebi malamu ‘te Pàpa akoyebisa biso makambo ma ntina mingi, na maye matali baelanga mingi ya bomoi bwa biso, mpe mingi mpenza na likambo liye. Azalaki na maloba ma makasi mikolo mileki na Roma, kasi mpe na Espagne. Natangi mingi na mikolo moye mya suka, maloba makasi ya don cyclique, Magnifica Humanitas, oyo kati na yango, alobi ‘te lotomo lya liboso, oyo ezali kotya makambo misusu nyonso na molongo mwa ye, ezali lotomo ya bomoi, kasi tango eutanazi ezwi na maponami, lotomo lóna ya bomoi ebebisami mingi. Nazali mpe kokanisa maloba ma Ngwende Esantu (Siège Saint), Samaritanus bonus, ya mobù 2020, oyo ezali makomi ma ntina mingi na likambo liye. Na yango, nazali na ntembe te ‘te Pàpa akoloba makambo ya makasi mpo na bakristun, mpo na kosalisa bango na kosunga bato baye bazali na mpasi; kasi mpe mpo na bato banso ya mboka na biso. Solo to sengelaki koyamba yé na esengo kati na mibeko ya malamu koleka, kasi liloba na yé, na likambo liye mpe na makambo misusu mingi, ekozala na motùya mingi mpo na biso; mpe tozali kozela ye na mposa makasi.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo liye.

17 sánzá ya nsambo 2026, 08:12