Bansango ya Misàlà mya Orient – 16 Yuli 2026
Bitumba minene ya mai na balabála, mpe yango ewumeli bankóto ya bambula. Na mokolo mwa poso eye, ba-Arméni bazalaki kosepela Vartavar, mpe ba Assyro-Chaldéens bazalaki kosepela Nusardel. Milulu miye mibale, oyo esalemaka na bowumeli ya mikolo tùkù libwà na mwambé (98 jours) to bapósó zomi na minei (14 semaines) nsima ya Pasika, ezali na makambo mingi oyo ekokani, kasi ewùtelo na yango ekeseni.
Na ekólo Arménie, Vartavar ekómi lelo eyenga to feti ya bakristu mpo na kokanisa Kobongwana nzoto ya Yezu. Kasi liboso na yango, ezalaki mpo na losambo lya Astghik, nzambe-mwasi ya mayi, ya bolingo, ya bonzengà mpe ya kobota. Mayi etikali bongó na yango elembo ya bomoyi, ya kobotama lisusu mpe ya esengo.
Epayi ya ba Assyro-Chaldéens, Nusardel ezwi ebandela na yango, na mimeseno mya kala ya Mezopotami. Na ebandeli, bililingi bya banzambe bazalaki kosopela yango mayi na bafeti ya eleko ya molunge, liboso ‘te mokonzi apambola to abenisa bato se na lolenge yoko. Tango bokristu ekoti na ekeke ya liboso, momeseno móna ekótaki na milulu mya bokristu: mayi ekómaki elembo ya batisimo mpe ya kobongola mitema mya bato ya Asulia. Kino mokolo mwa lelo, nteke to feti yango esalemaka na Mezopotami mpe na bikólo bisusu.
Bato mibale, masolo mibale, kasi momesano moko: kosala na mayi elembo ya lipamboli to ya bobenisi, ya bokaboli mpe ya kopalingisa.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo liye.