Bansàngo ya Bikela bya ngambo ya Orient – 23 Yuli 2026

Bamamelo ya ba Sœurs Franciscaines Missionnaires ya Marie balongwe na ndako to kuva na bango ya Alep.

Na sima ya kozala na Alep mibù nkàmà moko na misato (103 ans), bamamelo ba Franciscaines Missionnaires ya Marie, balungwé ndako to kuva na bango. Ba mbula zomi na mitano miye ya nsuka, balekisi yango na motungisi ya bitumba ya Syrie. Ntina ya bolungwe ba bango ezali : konuna ya lingomba, kokita ya motango ya bayambi mpe mikakatano na likambo ya mbongo.

Bayaki na nsé ya bokonzi bwa ba Français ; bongo mibù na mibù, basalisaki bilenge bana ya basi bakristu na lisalisi to ngrasya ya mosàlà mwa bango ya bolakisi. Ba Sàngó ya lingomba ya ba Salesiens bazwi nde ndako to kuva yango. Interna ekokóma ya bana mibali, nzokandé misàlà miyiké ; lokola atelier ya kotonga bilamba, esika bazalaki koyamba bana oyo bazalaki na motungisi ya maladi ya Autisme, mpe lisàngà lya ba Scout ya basi, bazweli yango mokano té ; etikali nayino lolenge ezalaki.

Basalaki misa moko esalemaki na Alep, na lisalisi lya Mgr Hanna Jalouf, oyo azali vicaire apostoliki  ya Alep, mpo ya kotondo botondi mpe kopesana mbote ya nsuka kino mokolo bakokutana na nzambe. Mgr Joseph Tobji, archeveki ya ba Maroniti ya Alep mpe azalaki wana.

 

Matondo mingi lolenge otangi lisolo liye.

23 sánzá ya nsambo 2026, 23:02