Luka

2026.07.27: Mgr Gervas Nyaisonga, Episkopo-Mokonzi ya archidioseze ya Mbeya, na Tanzanie, akomi Mokambi ya sika ya AMECEA, o mokolo mwa 26 ya sànzà ya Yuli ya mobù 2026. 2026.07.27: Mgr Gervas Nyaisonga, Episkopo-Mokonzi ya archidioseze ya Mbeya, na Tanzanie, akomi Mokambi ya sika ya AMECEA, o mokolo mwa 26 ya sànzà ya Yuli ya mobù 2026.  (TANZANIA EPISCOPAL CONFERENCE)

Ba episkopo ya Afrika ya Esti babandi plan pastorali ya mibù minei oyo etali mingi mpenza bilenge

Baepiskopo ya Association des Conférences Episcopales d’Afrique de l’Est (AMECEA) balaki kosala ete bilenge bazala likambo ya motuya ya Eklezia na mibu minei mizali koyà. Bazali kobenga bakambi ya mopelengano to politiki ya etuka mobimba mpo na kosukisa likambo ya kosàlela bilenge (exploitation de la jeunesse).

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Sima ya poso moko ya liyangani (19 – 26 Yuli), milùlù mya Ukaristya ya bosukisi ya 21è Assemblée Plenière ya AMECEA esalemaki na Loreto Msongari Grounds na Nairobi, o mokolo mwa lomingo na tongo. Mgr Gervas John Mwasikwabhila Nyaisonga ndé akambaki yango, tango ba ponaki Mokambi ya sika ya Association ya ba conférences épiscopales ya Afrika ya Esti. Episkopo - mokonzi ya Mbeya, na Tanzanie, alimbolaki liloba lya mokolo monà. Lokola ayebaki mokumba moye Nzambe apesaki ye, amidiembikaki na losambo la Salomo mpo na kosénga bwanya.

Misala mikomonono mpe botambwisami

Na liyebisi lya bango ya nsuka ebimisamaki na nsuka ya liyangani monene ya mbala ya tukù mibale na moko (21è Assemblée Plénière), ba episkopo bandimi komipesa na mokumba ya koyoka na bokengi bilikya, mitungisi, mpe bwalé ya bilénge. Balaki bango misàlà mikomonono, mpo na kotambwisa bango na bomoi bwa bango mpe na etindà ya Eklezya

Liyebisi linà la mokolo mwa 26 ya sànzà ya Yuli 2026, ezali komonisa emoneli ya bokengeli mpate (vision pastorale), oyo ezwi likanisi na maman na likambo ya liyangani yango : «Le chemin synodale de l’ AMECEA avec les jeunes : construire des ponts de communion, d’espoir, de justice et de bonne gouvernance», oyo na lokotà ya lingala elimbole ‘te : «Nzela ya lysangà ya AMECEA elongo nà bilenge : kotonga ba gbagba ya komunio, ya elikya, ya bosembo mpe ya botambwisi elongobani».

 Bilenge na tango ya misa ya bosukisi ya AMECEA.
Bilenge na tango ya misa ya bosukisi ya AMECEA.

Emoneli ya sika mpo na pastorale ya bilenge

Ba episkopo bamizweli mokano ya kolendisa bosangani ya bilenge o kati ya bomoi bwa eklezya mpe ya bana mboka. Ba kokela mpe kosangisa misala oyo epesameli bilenge na etuka mobimba. Ndé bongo bakotangisa bango ma missionnaires ya katoliko ya numeriki, mpo na kosakola Nsango Elamu na eleko eye ya numeriki. Se lolenge lonà bakokólisa koyekola, mentorat, entrepreneuriat mpe bokoli ya bontoki, mê bakolendisa lolenge ya kobatela mpe ya kopesa bango bontoki ya mosala na kati ya pastorale ya bilenge.

Bazwaki mpe mokano ya kosalisa na botamboli to kosala elongo mpe na bomoko kati na lisanga lya baepiskopo ya AMECEA. Bakolendisa ba mbulamatari, mangomba ya baetùkà mpe ba partenaires ya developema, mpo na kotombola bonsomi ya bokengeli ya bilenge mp batamboa na bokengi mpe na mibeko, participation civique mingi pe bosilisi matata na kimia na nzela ya masolo. Bakosunga bango mpe na kopesa maboko na misala ya kozongisa kimya kati na matata, na nzela ya masóló.

Lolenge ya kosalela ya mopelengano (politiki)

Na nzela ya maloba maye epesamaki na bakonzi ya mopelengano to ya politiki ya etuka yango, baepiskopo bamonisaki bobangi na bango mpo na litatoli liye bilenge bapesaki na likita lyango.

Bilenge bayebisaki biso na bozangi bobangi te; mingi mpenza bayokaka lokola bazali kosalela bango, na tango ya ba kampanye ya maponomi, kasi sima na yango babwakisaka bango”. Elobaki ba episkopo. “Tobyangi na kosukisa kosalela bilenge mpe kosukisa ba mbébà nyonso epai ya bango. Mingi mpenza na misalà miye ezali kosalela bolembu bwa bango mp ona kosepelisa misàlà ya mopelengano to ya politiki. Nzoka ndé tokosenga na bakambi ya politiki, bakoma batambwisi oyo bazali kopesa likanisi ya elikya na bilenge”.

Ba Episkopo ya AMECEA
Ba Episkopo ya AMECEA

Banzeneneke bya esengo ya Nsango Elamu

Ba Episkopo basengaki mpe na baninga ba bango ya mangomba misusu mpe ya ékimenisme, na ba secteurs privé mpe na bisika ya developema, bàsàla elongo nà Eklezya, mpo na kokela ba ndako esengeli kosunga makambo ya pastorali, ya psychosociali, ya koyekwisa, ya nimeriki, oyo ekosalisa to kopesa bilenge nzela ya kosepela na bofungwami.

Na liyebisi oyo epesamaki mpo na bilenge bango-moko, ba episkopo bakanisa bango ‘te, bazali kaka avenire ya eklezya tè, kasi mazali mpenza banzeneneke bwa yango sik’awa. Na ndakisa ya mokanda mwa Santu Polo onà Timothée, balendisaki bilenge: “Kotika tè ‘te moto moko abebisa to abwakisa bolenge bwa yo, kasi zala ndakisa mp ona bandimi; na maloba ma yo, na etamboli na yo, na bolingo, na boyambi mpe na bopeto” (1 Tim 4, 12).

Baepiskopo basengaki lisusu bilenge balanda ndakisa ya bayekoli na nzela ya Emause na kotambola elongo na Kristu, kotika mitema mya bango ebongwana na nzela ya Makomi mpe ya Ukaristya, mpe na kozala banzeneneke to batatoli ya esengo ya Nsango Elamu.

AMECEA: plan pastorali ya mibù minei, mpo na bilenge.
AMECEA: plan pastorali ya mibù minei, mpo na bilenge.

AMECEA ezali ko nini

AMECEA ezali ebongiseli (organisation) ya Katoliko ya etuka oyo ezali kosalela liyangani ya ba lisanga mwambe ya ba episkopo ya bikolo ya Afrika ya Esti. Bikolo byango nde, Érythrée, Éthiopie, Kenya, Malawi, Soudan ya Ngele (Sudi), Tanzanie, Ouganda mpe Zambie. Ekolo ya Djibouti mpe ya Somalie ezali basangani na bondeko.

Bokambi ya misala nyonso ya AMECEA ezali na lisanga ya baepiskopo ya mikili oyo ezali na AMECEA. Kati ya mayangani minene mibale, Konseil exékitif ezwi mokano to bikateli bilongobani na maye masengeli mpo na lisàngà ya AMECEA. Bikateli binà bizwami na nkombo ya Mokambi , na nzela ya sekeletele générali, oyo azali kokamba mpe badepartema mpe lisàngà to lingomba ya AMECEA.

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye.

 

27 sánzá ya nsambo 2026, 17:12