2020.09.22 Eutanasia assistenza vita

Nsuka ya bomoyi: Baepiskopo ya ekólo ya France babandi eleko ya mabondeli ya mikolo libwà.

Kobanda mokolo mwa lomingo 21 sanza ya Yuni, mpe kino mwa 29, lisangà lya baepiskopo ezali kosenga bayambi ba bango ‘te babondela na ntina ya maponomi mikosalema na Assemblée nationale na ntina ya mobeko oyo etali nsuka ya bomoi. Mobeko moye mosengeli kopesama o mokolo mwa 30 ya Yuni. Baepiskopo balobi ‘te ; Elimo santu engengisa mitema mpe epesa biso elikya ya sika, mpo ‘te lokumu la bomoi bya moto nyonso eyebana, ebatelama mpe epesama limemya.

Bansango ya Vatikan

Na ntina ya maponomi mikosalema na Assemblée nationale na ntina ya mobeko oyo etali nsuka ya bomoi, oyo esengeli kopesama o mokolo mwa 30 ya sànzà ya Yuni. Lisàngà lya baepiskopo ya ekolo ya France bazali kobyanga bayambi ya katoloko na kosangana elongo na bango, na losambo la mikolo minei, oyo ekobanda o mokolo mwa lomingo mwa tuku mibale na moko (21) mpe ekosuka mokolo mwa 29 ya sànzà ya Yuni. Likanisi ntina ya mikolo miye libwà ya losambo, lilobamaki na misa na tango ya Losambo la lisangà. “Bongo, makanisi misusu ya losambo elengelamaki mpo na mikolo mikoyà”, Baepiskopo balobi ‘te; “tokoki kokotisa losambo eye, na bansambo ya biso ya mokolo na mokolo, na Tata wa biso, moko, Losako Maria, moko, mpe Nkembo na Tata moko”. Mpe babakisaki ‘te; “Elimo Mosantu, angengisa mitema mya biso na bososoli mpe apesa biso elikya ya sika na tango ya masolo, mpo lokumu la bomoi bwa moto nyonso eyebana, ebatelama mpe etosama”.

Mokano mwa baepiskopo mp ona likambo la mobeko

Mobeko, moye mokotalelama o mokolo mwa yambo na botangi ya misato na Assemblée nationale, ezali mpo na kopesa ndingisa ya euthanasie mpe ya komiboma na lisalisi to lisungi lya monganga, na France. Ut’o tango ya bowelani ntembe ya liboso, baepiskopo balobaki ‘te “limemya mpo na bomoi ezwamaka te na bosukisi yango, kasi nde na kokengela yango na likebi nyonso kino na nsuka. Na liyebisi moko ya mokolo mwa zomi na minei ya sànzà ya Màyi (14 mai), baepiskopo bazlaki kofunda mobeko monà mpamba te bazali na bobangi ‘te ezali “bozangi bokebi na ezalela malamu mpo ya bato” mpe ezali “kozanga limemya mpo na demokrasi”. Bazalaki kolobela likambo oyo Sénat endimaki bobélé mobeko ya kosalisa bato oyo bazali na maladi ya nsuka ya bomoi kasi eboyaki mobeko ya kosalisa bato oyo balingi komiboma, yango emonisaki ‘te bato ya parlema bakeseni na likambo liye ya nsomo mingi. Bozangi koyokana emonisamaki na Assemblée nationale. “mp ona likambo eye”, baepiskopo bakomi ‘te “Kotinda bato na makasi, bandima euthanasie mpe lisungi mpo na komiboma ekozala koboya koyoka mongongo mwa ebele ya bato ya parlema”.

Lisungi maloba ma Pàpa ememelaki bato ya parlema ya Espagne

Kati na liyebisi liye ezalaki kolobela losambo la mikolo libwà, Lisàngà lya baepiskopo ekanisi nna bato ‘te; o mokolo mwa 8 Yuni moleki, Pápa Léon XIV alobaki na basangani ya Parlema ya Espagne na maloba maye: “Kobatela bomoi ya moto ezali likambo lya moto ye moko te to ya lingomba moko te: ezali mokano mya ezalela ya bato. Bomoi bwa moto nyonso esengeli kotosama mpe kobatelama kobanda na libumu la mama to na ntango ya zemi, kino na tango ya nsuka na yango lolenge elongobani, ata soki kozalela lya bomoi bonà bozali lolenge kani […]. Bonene bwa yoko ekolo emonanaka liboso na makoki na yango ya kosunga, kobatela mpe kolinga bomoi bwa bato oyo bazali na botawù”.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

22 sánzá ya motóbá 2026, 22:52