Elembo ya Caravane panafricaine mpo na kimya mpe bomoko na RDC na ngambo ya Océan Atlantique - elilingi mpo ya ndakisa Elembo ya Caravane panafricaine mpo na kimya mpe bomoko na RDC na ngambo ya Océan Atlantique - elilingi mpo ya ndakisa  

Episkopo ya Butembo-Beni azali kofunda mabe ya politiki na RDC

Na libakù lya bokundoli bomartiro ya Charles Lwanga mpe baninga bayé, Mgr Sikuli Paluku Melchisédech, episkopo ya Butembo-Beni, engumba ezwami na Moniele (Esti) ya RD.Congo, atyaki mokoloto mwa ye, na liyebisi moko oyo ezalaki kolobela bakonzi ya ekolo RDCongo, mpo na kobebisama ya likambo ya bokengi ya bomoi ya bato na dioseze na ye. Episkopo alobi nà mawa nyonso ‘te “ezali na bokabwani makasi kati na mitungisi ya bato ya politiki mpe bamposa oyo batoya Congo basengeli na yango solo”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Dioseze ya Butembo-Beni ezali konyokwama mpenza bozangi bokengi to libateli ya pene ya liwa. Eteni ya sudi ya dioseze eye, ezali na maboko to na nsé ya bokonzi ya ba tomboki (rebelles) ya ba AFC/M23, na complicité ya ba mpaya; nzokandé eteni ya Nordi ezali konyokwama na maboko ya ba ADF-Nalu oyo ezali koboma bato mbala na mbala. Ezali mpe komonisa mpe ‘te, lolenge mobulu ezali kobakisama na bingumba bya bamboka ya zamba, ndenge biteyelo mpe ba lopitalo bizali kosala malamu lisusu te. Nyonso wana eyaki kosuka na kopalangana ya Ebola, oyo ekangisaki etúká yango na bamboka bisusu ya ekólo RDCongo mpe na bamboka ya zongazonga. Na kati ya makambo ma mpasi boye, Mgr Melchisédech akamwe na komona ‘te “bolembu ya politiki ya mboka  ezali kosala makasi kaka mpo na kobongola mibeko mya mboka”, nzoka nde, “esengelaki baluka na lombango mpenza, biyano malamu mpo na kokokisa bamposa ya bato”.

Kobosana té ntina ya mosala mwa yo

Episkopo ya Butembo-Beni azali kokebisa Mokambi ya ekolo, mbulamatari, ba députés nà ba sénateurs ya mboka, bàyeba likàmà ya ezaleli ya bango. Alobi ‘te: “ezali komonana malamu lokola ndanga ya bokabwani ya mboka, oyo bato ba Congo bazali nayino koyeba te”. Ut’o bobele ngonga enà, Wayambo alobi polele makambo manei oyo azali kosenga, kaka na bato ya politiki mpamba te, kasi mpe na bato banso ya RD. Congo. Moto na moto, àsàla engebene na mosala mwa yé, mpo na “kokómisa mboka kitoko koleka lolenge ezalaki liboso, to mpe kokómisa yango mabe koleka”. Na Mokambi ya Répibliki, Mgr Melchisédech asengi ‘te “amitungisa liboso na kozongisa kimya na mboka mobimba mpe abosana te ‘te ntina ya bokonzi ezali nayino kosàlà mosala mpo ya bato”. Bongo asengaki na ba depités mpe ba sénateurs ‘te “bàzala ba complices ya makàmà (malheurs) ya bandeko na bango te”. Akundoli bango ‘te “bato batindaki bango na Parlema mpo na kofungola nzela ya bolamu bwa bango mpenza, kasi te mpo na kokanga bango na kati ya cycle ya lifelo ya mobulu, na nzela ya bikatelito mikano biye bizali kobebisa bomoko na bango na kati ya mboka”. Episkopo asengi na mampinga mya babateli mpe ya bokengeli ‘te bàmituna na mpó ya mosàla mwa bango mpe bàbatela yango makasi.

Kolakisa bokóli na makambo ma politiki mpe bolingo ya mboka

Mgr Melchisédech alendisi bato ba mboka ‘te “bàzala ya kolamuka na makambo manso ma ekolo; basengeli kozala na bososoli malamu mpo bakweya te na lokuta ya makambo ma politiki”.  Abakisi ‘te, “ ezali tè kobongwana ya mibeko ya mboka nde ekopekisa kobomama oyo tozali komona. Ezali mpe referendum te oyo ekobongisa lolenge ya bomoi na biso na mbalakaka”; ekobi koloba episkopo ya Butembo-beni. Abengaki bato ba mboka ya ye “bámonisa ‘te bakóli na makambo ya politiki mpe ‘te balinga ekólo ya bango”. “Bato ya Congo bazali na lotomo kaka te ya kozala na bomoi, kasi ya kozala na kimya, na lokùmu, na bosembo mpe ya kozongela boyokani”. Esukisaki episkopo, mpe asengaki na mboka na ye mpe na mokili mobimba, lisungi ya Ngondo Maria, “Mokonzi-mwasi ya Kimya”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

08 sánzá ya motóbá 2026, 20:24