Luka

Na bilili, Congrès national na Bogota Na bilili, Congrès national na Bogota  (AFP or licensors)

Colombia: Mokolo mwa losambo na bopusani ya maponami ya mokonzi ya ekólo

Mwa mikolo moke liboso ya maponami ya mbala ya mibale oyo ekosalema na mokolo mwa 21 ya Yuni, lisanga lya ba episkopo ya Colombie esengi na ba katoliko mpe ba eklezia ya mboka mpo na kosangana na mokolo mwa mitano, mwa 19 ya Yuni, na mokolo mwa losambo mpo na mboka.Eklezya ya Colombie ezali na mokano ya kopesa esika ya elimo mpo na komanyola, ya kosolola mpe ya kimya, na ntango oyo makambo ma politiki mpe ya bomoi ya bato ezali na mobulu makasi.

Bansango ya Vatikan

 

Eklezia ya Colombie esengi bayambi na bango ‘te basangana mpo na maponami ya mokolo mwa lomingo, mwa 21 ya sànzà ya motoba mpe ebandi mokolo ya losambo na mboka mobimba. Engebene na liyebisi ya lisanga ya baepiskopo, mokolo mwango ya mabondeli ekozala na butu ya losambo ya bato banso kati na ba dioseze mpe ba circonscriptions ya lingomba, mpe na bantango ya losambo kati na mabota.

Basengi mpe na bayambi na kopelisa buji lokola elembo ya boyambi mpe elikya mpo na mikolo mizali koya ya ekolo. Likambo liye «balobi ba episkopo»,  ezali na mokano ya kotya mboka na maboko ma Nzambe, na tango oyo ya mpasi na bomoi ya demokrasi. Balingi kosenga kimya, boyokani mpe bososoli, mpo na bayimboka (citoyens) banso oyo babengami na maponami.

Ntina ya butù ya losambo na mokolo yambo ya maponami

Mokano moye mozali na ntina mingi na likambo ya campanye ya maponomi. Eklezya ya Colombie ezali na mokano ya kopesa esika ya elimo mpo na komanyola, kosolola, mpe kimya, kati na ezalela ya makambo makasi ya politiki mpe ya bomoi ya bato. Kati na mokanda oyo ebongisami na Secrétariat permana ya episkopo ya Colombie, mokolo yango ebengami lokola mbela ya koyoka mongongo mwa Nzambe kati na mitungisi mya tango ya maponami. Mokano na yango ezali ya kosalisa bato bákutana, mpe kokómisa makasi boyokani oyo ezali kati na bato ya Colombie, kotya matómba ya bato banso liboso ya makambo ya politiki.

Bilili mpo ya ndakisa
Bilili mpo ya ndakisa   (© celag)

Na boyokani elongo nà mbela ya episkopo wa lokùmu Rueda mpe ya Pàpa

Kosala mobilizasio oyo ya molimo, ezali bongo na boyokani nà mbela episkopo wa lokùmu Luis José Rueda Aparicio, awutaki kosala kala mingi tè. Asengi ‘te “bàlongola bibundeli” na mitema mya bango, na maloba ma biso mpe na maboko ma bango. Liyebisi liye, lizali mpe na mateya ma Pápa Léon XIV; mpamba tè, amonisaki mbala na mbala ntina ya kotonga ba Gbagba (Ponts) na nzela ya masólo na limemya, na boyokani mpe na lolenge ya kolendisa bokutani

Elembo ya elikya mp ona Demokrasi ya Colombie

Ezali kaka kolekisa mwa ntango ya losambo mpamba té, kasi butù ya losambu to bokengi ya mokolo mwa 19 Yuni ezali, elembo ya elikya mpo na ekolo ya Colombie na tango eye ya ntina mingi na lisapo to lisóló ya demokrasi na yango. Na nzela ya losambo, Eklezia ezali kolendisa ezalela ya limemya kati na bato, kozongisa boyokani kati na bato mpe kosunga kotonga kimya ya libela oyo esimbami na bosembo mpe lokùmu ya moto nyonso. Na ntango ya maponami, liyebisi ya episkopo wa lokùmu ezali polele: kotya bolamu bwa bato banso na esika ya liboso, kolónga bokabwani mpe kopesa mikolo mikoyà ya ekolo, na nzela ya masolo, ya bontoki mpe ya bondeko.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

18 sánzá ya motóbá 2026, 15:50