Bansango ya Misàla to Bikela bya Orient – 18 Yuni 2026

Katedrali moko ewùmelà bambula nkóto, ebebisami na babómbi ya Russie

Na butu ya mokolo mwa lomingo 14 kino mokolo mwa yambo 15 ya sànzà ya motoba, bitumba mingi ya Russie ebebisaki ndako-nzambe monene ya Dormition, na kati ya lopango ya Laure des Grottes ya Kiev. Laure des Grottes ezali monastele monene ya eklezya Ortodokse oyo ezali na engumba-mokonzi ya Ukraine. Esika monene ya molimo kasi mpe esika elembo ya makasi ya lisàpo ya ekólo. Katedrali ya Dormition, oyo etongamaki na ekeke ya zomi na moko (11è S), ezali ndako ya losambo ya libosoliboso mpenza.

Ezali lokola ndakisa ya liboso ya bandako-nzambe minene ya monastele ya Rus’ ya Kiev, ekólo ya Moyen Âge oyo ebimisaki eteni ya ekólo Ukraine. Ezali mpe na malita ya bankumu ya Kiev. Nsima ya kobeta yango bombi, efelo ya ndako yango mpe nsamba na yango ezwaki móto mpe ebebaki ndambo. Bakonzi ya Ukraine bafundaki ekólo Russie mpo ekei kobundisa esika ya ezalela ya bango ya bonkoko oyo ezali elembo ya lokùmu ya mboka Ukraine. Liboso ya etumba oyo, ndako-nzambe ebebisamaki ndambo na 1941, ntango Banazi babótólaki engumba yango na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Lelo oyo, monima oyo ewùmelà bambula pene na nkóto moko, ebebisami lisusu na bitumba.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

18 sánzá ya motóbá 2026, 16:29