Luka

Bansango ya bikela bya ngambo ya Orient – 11 Yuni 2026

Johnny Daoud, oyo azalaki moto ya boloko na ntango ya bokonzi ya Bashar al-Assad mpe na nsima azalaki moto ya Front Al-Nusra na boumeli ya mbula koleka zomi, awùti kokula bonganga (akómi sàngó).

O mokolo mwa 6 ya sànzà ya motoba (Yuni) ya mobu moye, na katedrali Saint-Esprit ya Homs na mboka Syrie, Mgr Jacques Mourad, episkopo ya Homs, oyo azali moto ya Lingomba ya Katoliko ya Syrie, akulisaki Johnny Daoud mpo na mosala ya bonganga-nzambe.

Molulu mwango mozalaki na mayoki mingi mpamba té mobali oyo akabwanaki na mwasi na ye Stella mpe mwana wa bango Jack, ut’o mwana eye azalaki na mibu misato. Na lisukulu to mateya ma ye, Mgr Mourad alobaki ‘te bonganganzambe ezali etindà ya mosala mpe bomipesi. Sàngó ya sika alobaki ‘te likambo ya yé ya mpasi ebongolaki bomoi bwa ye mpe asakoli ‘te: «bambula wana ya molili ezalaki mpo na kolengela ye mpe, mpo na mosàlà oyo asengelaki kosala na mikolo mizali koya, na ntina ‘te nàsalisa bato oyo bomoi bwa bango ezokisami mpe baye bazali konyokwama».

Sikawa alingi kotika nzela ya yé mpo na kosalisa baoyo bazali koluka nzela ya boboto to kimya, ya boyambi mpe ya kozongisa boyokani.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

11 sánzá ya motóbá 2026, 10:10