Bansango ewùti na Bikela to Misàlà mya Orient - 25 ya sànzà ya Yuni 2026
«Bakosundola bino soki moke te». Ezali bongo nsango oyo episkopo wa lokùmu Pierbattista Pizzaballa, Patriarche ya Latin ya Jérusalem, amemaki na bakristu ya Gaza na mobembo mwa yé ya mokolo mwa tukù mibale na ibale (22 juin). Elongo nà mokonzi ya Lingomba ya Ortodokse ya ba Greki Théophilos III, akendaki na Gaza mpo na kosunga etuluku moke ya bakristu ya mboka wana mpe bato banso banyokwamaki na bitumba.
Na tango ya misa na ndako Nzambe ya Sainte-Famille, palase kaka moko ya Katoliko na etuka wana, ayebisaki bayambi ‘te: “Tókotika bino soki moke te mpe bino bokokwakisama soki te”. Paloase yango ezali koyamba bato oyo bakimá ba mboka na bango mpe ezali kokoba kosalisa mabota oyo ezali na kartye oyo ezali pembeni, atako ezalela ya makambo ezali mpenza mpasi.
Kati na bato milió 2,2 oyo bafandi na Gaza, pene na nkóto moko bazali bakristu, kati na bango 135 bazali Bakatoliko. Bato mingi bakimá na lopango ya parwasi yango banda etumba ebandaki. Engebene na bakonzi ya mboka wana, koleka 60% ya mboka ezali sikawa na nsé ya bokonzi ya Israël. Bato koleka nkoto moko basengelaki kobomama ut’o babelelaki bokitisi mandoki. Lisungi ya bato ezali koya na motango moke mpe bapanzi-sango ya mokili mobimba bapekisami kokota na mboka. Mobembo moye mozali mobembo mwa liboso lya episkopo wa lokumu ya Gaza, kobanda sanza ya zomi na mibale ya mobù 2025.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye