Luka

Yoko nzembo mpo na lokumu la Pápa o mokolo mwa aniversele ya yambo ya bopàpa bwa ye

Daniel Rugamika Bakulikira, Mokambi ya Korali ya Petits Chanteurs de la Résurrection ya Bukavu, na Républiki démocratiki ya Congo, asali nzembo mpe Don Marco Frisina, Mokambi ya Korali ya Dioseze ya Roma, abongisaki yango. Ezongeli maloba ma Pàpa Leon ya XIV, «In illo uno unum», elimboli ‘te «Tózali bomoko, elongo na oyo azali sé Moko». Na koyemba yango, ba Petits Chanteurs ya Résurrection balobi ‘te bazali kosambela nà mpo ya kimya na mokili, bomoko mpe bondeko na Eklezia.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Koyemba na lolenge ya misa esalisaka na komanyola; esimbami na makomi ya mayembi ya pete na mongongo ya moke; ekotisaka bongo moto na bozindo mpe bomoto. Eyembeli na yango ezali na makelele te kasi ya pepele, ezali kosalisa bato báyemba elongo, mpe ezali na témpó ya pepele oyo ezali kosalisa moto oyo azali koyoka liloba moko moko oyo ezali koyembama, mpe, ezali kotinda moto akanisa to amanyola. Molongo ya loyembo - oyo esalemi “na langi ya mpembe”, “moindo” mpe “mikólóló” - ezali kopusa loyembo ‘te ezala na molongo mpe na ekilibre, mpo na kopesa nzela na maloba, “epema” mpe “epesa esengo to nsayi, emonisa mayoki ”. Na nsuka, mongongo mwa yango, ezali koyembama na molongo mpe na boboto, ezali komonisa lisànga oyo ekómisi Eklezia nzoto moko. “Bomoko kati na bokeseni” oyo emonanaka na makita ma mangomba ezali komonana polele na miziki oyo ezali na mingongo minei, oyo eyokani na loyembo ya libosoliboso, oyo eyembami na piano.

Kotombola loyembo la milulu kati ya bana mpe bilenge

Korali ya ba Petits Chanteurs ya Resurrection ezwami na Esti to Moniele ya Congo démocratiki, na Archidioseze ya Bukavu. Ezali etuluku ya bayembi ya bana mpe bilenge mibali oyo bamipesi mingi na miziki ya bosantu mpe ya classiki. Korali yango, ekomisami mbala na mbala na liste ya “Fédération Internationale des Petits Chanteurs” (FIPC - Foederatio Internationalis Pueri Cantores), ezali na bana koleka nkàmà minei (400) oyo bazwi formasyo ya miziki mpe ya ntoki ya malamu mpenza.

Na eleko eye ya makambo ma mobulu mozali kozonga mbala na mbala na ngambo ya Moniele to Esti ya Républiki démocratiki ya Congo mpe na Etuka mobimba ya btitimà binene (Grands Lacs), muvema oyo, esangisi ba formasyo ebele na mboka mobimba, esalelaka nzembo kaka mpo na kosambela mpe kosambisa te kasi mpe mpo na kobondo mpe kolendisa. Ezali kopesa eyano mpe na etindà ya molongo mobimba ya «Pueri Cantores», oyo ezali “Kotombola loyembo ya misa na bana mpe bilenge, mpo na kosalela lisanga, kolendisa mateya ma molimo mpe miziki, mpe kopesa maboko na mosala ya kimya, kotonga lisanga ya boyambi na mokili mobimba”.

Na tango ozali koyemba loyembo eye, ba Petits Chanteurs ya Résurrection basengi osambela mpo na kimya na mokili, bomoko mpe bondeko na Eklezia, elobi ba petits Chanteurs.

Korali esalaki nzembo na maloba mya Pàpa François, “Miserando atque eligendo” mpe ya sinodalite. Bokoki kolanda yango mpe koyoka yango na site ya internet: www.pcresurrection.net

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

07 sánzá ya mítáno 2026, 17:12