Luka

2026.01.17 Pàpa Leon ya XIV elongo na bakambi ya Symposium ya ba Conferences  ya ba Episkopi ya Afrika mpe ya Madagascar (SECAM) 2026.01.17 Pàpa Leon ya XIV elongo na bakambi ya Symposium ya ba Conferences ya ba Episkopi ya Afrika mpe ya Madagascar (SECAM)  (@VATICAN MEDIA)

SCEAM epesi matondi mpo na mbula moko ya bokonzi bwa Pàpa Léon ya XIV

8 mayi 2025 - 8 mayi 2026, mbula moko ya bopàpa ya Pàpe Léon ya XIV. Na libaku liye, Symposium ya ba Conférences épiscopales ya Afrika mpe ya Madagascar (SCEAM) etindaki mokanda mwa botondi mpe ya komunio nà Santu Pàpa. Episkopo wa lokumu Fridolin Ambongo , mokambi ya SCEAM nde atyaki mokoloto na mokanda moye mozali kolakisa botuya bwa mosala mwa Pàpa. Mingi mpenza na mabele ma Afrika, epayi wapi azali nsango ya kimya. Minso mimonani na mobembo mwa ye ya mikolo zomi na moko.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mokolo moye mwa bokundoli mobù mwa yambo ya bokonzi bwa Pàpa Léon XIV, oyo ekokani na eyenga ya Notre-Dame ya Pompei, SCEAM elobaki na liyebisi la ye na Papa ‘te: “Eklezya, libota lya Nzambe na Afrika, esangani na esengo nyonso nà Eklezia ya molóngo mobimba mpo na kotondo botondi Nzambe wa Bokasi-bonso, awa Mosantu Pàpa Léon XIV azali kosepela mbula ya liboso to ya yambo ya bokonzi bwa ye”. Baepiskopo ya Afrika bakanisi “mokolo moye Eklezia eyambaki na botondi, bomipesi ya Pàpa na mokumba ya Mokitani ya Petelo. Bazali kokumisa mosala azali kosala na bosembo, na mayele, na motema mawa mpe na mpiko ya kosakola Nsango Elamu”. Balobaki ‘te “na mbula eye ya liboso ya mosala na ye ya bopápa, litatoli na ye ya kondima mpe ya komikitisa ekómaki liziba lya elikya mpo na eklezya mpe mpo na mokili mobimba”.

Mbela ntango inso mpo na kimya mpe bondeko

SCEAM ezali epesi motuya mingi na maloba ma Papa mpo na kimya mpe bosembo, mpe ezali komonisa ‘te maloba ma ye ya kolendendela mpo na kimya, boyokani, bosembo mpe bondeko esimbaki mitema mya bato na mikili minso mpe elikya na bango mpo na Nsango Elamu ya Kristu ezali kobakisama, mingimingi epai ya baoyo bazali konyokwama na bitumba, na bobola, na kokima mboka na bango mpe na kozanga bosembo”. Baepiskopo balobi ‘te maloba ma ye manso epesaki nzela na “kozongisa elikya na Nsango Elamu ya Kristu”, mingi mpenza “na kati ya bato oyo bazali konyokwama na bitumba, bobola, kokima mboka mpe kozanga bosembo”.

Mobembo mwa bontómà, elembo makasi ya Komunio

Eklezia ya Afrika ezali mpe kopesa matondi mpo na mobembo mwa Tata-Mosantu na Afrika. Kozala na ye na kati ya bato ya Afrika ezalaki kaka te mobembo ya kobatela bampate, kasi ezalaki mpe elembo ya makasi ya bondeko, ya boninga mpe ya kolendisana, elobi liyebisi ya SCEAM. Likita lya baepiskopo batangi Léon XIV lokola “toma ya solo ya Kristu mpe Momemi-nsango ya boboto to kimya”, oyo ayaki na Afrika mpo na “kolendisa boyambi ya bato, kobondo bato bazali na mpasi, kolendisa bilenge, mpe kokolisa bomoto ya moto na moto”.

Baepiskopo ya Afrika bakanisi ‘te maloba mpe misala mya Pápa Léon XIV esili kobimisa “mbuma ebele ya molimo” kati na ba eklezya na bango ya bamboka. Balobeli mpe mingi kozongisama ya etindà oyo esengeli kosalema na molende, kolendisa bozongisi boyokani na bisika biye mpasi mpe bokabwani ezali nayino. Balobi ‘te “lolàkà la Tata Mosantu ezali kokóba koyokana na mitema mya bayambi, ezali kobenga bango banso ‘te batambola elongo na bomoko, na elikya mpe na bosembo n antina ya Nsango Elamu”.

Le SCEAM azongisi boyokani bwa yé na Pàpa lokola mwana, alaki ye losambo mpe kozala elongo. Eklezya ya Afrika etiki mosàla mwa Pàpa na “libateli mpe bolobeli bwa Mama wa bolingo, Mwa-Esengo Ngondo Maria, Mama wa Eklezya mpe Notre-Dame ya Pompei, asambela mpo na ye mpe akamba ye na etinda ya ye mpo na eklezya ya molóngó mobimba”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

08 sánzá ya mítáno 2026, 19:58