«Lokola mbuma ya mpaka malasi», mobembo mwa Léon XIV na Algérie eboti mbuma.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na lisoló moko na Vatican News, Mgr Diego Sarrió Cucarella alimboli ‘te : Mokanda monà mozali mpo na kofungola nzela ya bososoli mpo na Bakatoliki na ntina ya boyei bwa Tata Mosantu na Algérie, lokola «mwinda mpo na kotanga lisusu vokation na bango», mpo «ezala te ‘te mobembo moye motikala kaka lokola ekaniseli ya kitoko to lokola likambo lya mwa ntango moke».
Episkopo alobi ‘te mbuma ya bokutani bona bokozala «nayino ontei ya moto» kasi «ya nokinoki te to ya kokamwisa».
Etindà oyo endimisami
Kati na mokanda mwa ye, Mgr Sarrió Cucarella akomi ‘te, na kotala lokola «ndeko oyo ayei kokutana na bato ba yé», Pápa abéngaki Bakristu ya Algérie ‘te «bázala na bomoi o bozindo mpo na etindà na bango na mokili moye». Na Kozongela elilingi ya mbuma ya mpaka ya malasi oyo ezalaki na ntina mingi na lisukulu ya Léon XIV (l'homélie de Léon XIV) na misa na Baziliki Saint-Augustin ya Annaba, episkopo alobi ‘te kozala ya bakristu na Algérie ezali ya «komikitisa, ya kobatama, mbala mingi emonanaka te, kasi ebyangemi mpo na kopalinginya o zongazonga na yango, nsunga ya Kristu kasi ya yango moko te. Akanisi lisusu na bato ‘te, « botàù ya nimeriki » ezala libakù ya mokakatano te mpo ya kobota mbum aya Nsango Elamu, kasi ekóma esika ya bozalani, ya bokutani mpe ya kotàtola », lolenge elakisaki mokitani ya Petro.
Mbela na masóló mpe na bondeko
Mpo na Mgr Sarrió, mbuma ya boyei bwa ye emonani liboso “na bonene bwa boyokani kati ya bato”. Bàyanolaki bongo na mbelà ya Pàpa ya “kokólisa momeseno ya bokutani”. Libyangi eye ezali koyokana na mboka epai wapi Islam ezali lingomba ya Leta mpe 98% ya bato bazali ba mizilma. Kuna, etindà to mosàlà mwa Eklezia ya mboka etongami na boyokani mpe bondeko kati na bato. Ezali moko na makambo ma ntina ya bokonzi bwa Léon XIV.
Na esengo ya boyei bwa Pàpa, episkopo asengaki na bato ya Algérie ‘te: “bàluka te kolongola bokeseni, mpe baluka te kokomisa yango lolenge yoko” kasi “bàzala na bondeko oyo ezali komona o kati ya moninga bomoto bwa yé”, “boyokani bwa solo mpenza ebandaka na lolenge ya komemya to kotosa na bosolo likambo ya bato”, elobaki ye.
Na bokundoli ‘te “litatoli lya Nsango Elamu elekaka na nzela ya mosala, boninga mpe masolo”, Mgr Sarrió abyangi, na mokanda mwa ye, mpo na kozala na elikia mpe kofungwama na basusu, mpo ete mobembo ya Tata Mosantu ebota mbuma.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye