Luka

2026.05.30 Kosovo, bosukisi ya sànzà ya Maria na esika Mosantu ya Letnicë 2026.05.30 Kosovo, bosukisi ya sànzà ya Maria na esika Mosantu ya Letnicë  

Kosovo: “Komema boyambi na baye babungisi bokristu bwa bango”

Na esika mosantu epai wapi Mère Teresa azwaki mokano ya kopesa bomoyi bwa yé na kristu, bakristu bawùtaki bikolo binso, basanganaki o mokolo mwa 30 ya sànzà ya Màyi, mp ona kosukisa sànzà ya Maria. Misa misalemaki mp ona libakù linà, na esika ezali komonisa boboto pme makamwisi. Mgr. Dode Gjergji, episkopo ya dioseze ya Prizren-Prishtina, alobaki ‘te ut’o ekeke ya minei (IV), bato ya bisanga yango bamipesaki na mosala ya kopalinginya Nsango Elamu mpe ya kosalisa bato bázongela boyambi bwa bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na tongo ya mokolo mwa poso mwa 30 ya sànzà ya Màyi bankoto ya bayambi bayaki na bisika biyiké ya kosovo, na Letnica tee na sanctuaire ya mboka, mpo na kosukisa sànzà ya Maria. Bato ya Lingomba ya Katoliko, oyo etondisami na mabota mingi, bilenge mpe mibange, batikalaki na kati na nsé ya molunge makasi , mpo na kosangana na misa oyo episkopo ya dioseze ya Prizren-Prishtina, Mgr Dode Gjergji, akambaki.

Yoko esengo ya koyebisa

Na mateya ma yé, alimbolaki eteni ya Nsango Elamu oyo ezali kolobela mobembo ya Maria epai ya Santu Elisabeti, mpe esengo ya kokóma Mama ya Nzambe. Episkopo amonisaki molende mpo na kopalinginya Nsango Elamu mpe mpo na kozongisa kondima oyo ezalaki bobele na bitúká bina na ekeke ya minei. Biso Bakristu tosengeli kosakola Nsango Elamu na basusu, lokola batata ba biso, oyo, basalaki yango na mpiko, na ntina ya kozala nzeneneke ya esengo ya Nsango Elamu, ata kati na mikakatano.

Esengeli ‘te esengo yango eyebisama mpe ebotama o kati ya bato, na nzela ya boyambi bwa biso epai ya bato baye, na boumeli ya lisapo (histoire), bakutanaki na minyoko ya ndenge na ndenge, babosanaki to babungisaki bokristu bwa bango, lokola esalemaki na mibu 500 ya bokonzi ya Ottoman. Lokola Maria akendaki kotala Elizabeti na esengo nyonso, episkopo alobaki ‘te, « Eklezya na biso esengeli komema Nsango ya bokristu epai na bato bazali na mikakatano ya bomoi, kasi bazali koluka bosolo mpe bolingo bwa Nzambe ».

Mama Teresa

Nsango ya Mgr Gjergji ezali na ntina mingi lelo oyo, nzoka nde bayambi bayiké bazalaki kosangana na Ngomba Mosantu, na esika mpenza elenge mwasi moko, oyo asengelaki kokóma Mama Teresa, azwaki mokano na 1928 ya kokóma mamelo, kopesa bomoi bwa ye na Nzambe mpe komipesa na bàbola oyo balekibobola na mokili. Na nsuka ya mokolo monà, Mgr Gjergji alingaki koyebisa na bango ete mobembo moye ya dioseze, eponamaki na mokitani na ye, mpo na losambo la sànzà ya Maria, ekokaki kosalema bobele kaka na esika wana, epai wapi ezali elembo ya boyambi bwa biso mpe ya Mama Teresa, esika wapi makamwisi mingi misalemaki.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

31 sánzá ya mítáno 2026, 19:08