Koponama ya Episkopo -Mosalisi ya sika ya Abidjan na Côte d’Ivoire
Bansango ya Vatikan
Mgr Aguia Jean Martial Arnaud Kouamé abotamaki o mokolo mwa 26 ya sànzà ya màrsi ya mobù 1977 na Abidjan. Azwaki licence na Filozofi mpe baccalauréat na téoloji na likindo ya Université Saint-Paul VI. Akulaki bonganga o mokolo mwa 15 Yanuali ya mobù 2005 mpo na Archidioseze monene ya Abidjan.
Na boumeli ya mokumba mwa ye ya bonganga, episkopo-mosalisi eye ya sika asàlaki misàlà mingi ya kobatela bampate, na Côte d’Ivoire mpe na France. Akomaki liboso mokengeli ya Cathédrale Saint-Paul ya Abidjan kobanda 2005 kino 2008, yambo ‘te akende kokóba mosàlà monà na archidiosezez ya Strasbourg, mingi mpenza na paloase Saint-François-d’Assise ya Zinsel. Atangaki mpe na eteyelo ya likóló. Bongo azwaki lisansi moko na Droit Canon, azali na master moko na Filosofi, mpe na histoir à filosofi ya science, na Unisversité ya Strasbourg. Akobaki lisusu kelasi na yen a teoloji morale na Université ya Lille. Sima azwaki doctorat na option éthique et religion, kaka na Université ya Strasbourg na mobù 2018.
Na France, azalaki Sàngo-Molandi ya paloase ya Bonne Nouvelle na Hem, mpe na nsima, ya Saint-Fiacre na Dunkerque. Azalaki mpe mokengeli ya paloase : Notre-Dame du Chêne ya mboka ya Fleckenstein, na Archidioseze ya Strasbourg. Na tango azongi na Côte d'Ivoire, aponamaki sango ya paloase ya Saint-François-Xavier d’Abobo, na Abidjan, kobanda 2018 kino 2022. Kobanda 2022, azalaki pasteur ya parloase Saint-Ambroise Ma vigne, Ma Vie, oyo ezali mpe na Abidjan.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.