CCEE ezali komituna lolenge ya kosakola Nsango Elamu na bisika ya Interneti
Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC
“Eklezya ya Mikili ya Poto mpe mosala na yango na nzela ya Internet”, ezalaki bongo motó ya likambo ya liyangani ya bamemi-nsango mpe bakambi ya bapanzi-nsango ya ba episkopo ya Eropa, oyo ebongisaki conseil ya lisanga ya ba episkopo ya Poto (CCEE). Nzokandé lisanga ya ba episkopo ya italie mpe Université pontificale ya Sainte-Croix, ebongisaki yango ut’o mokolo mwa 5-7 ya sànzà ya màyi
Babeti nsete na bomoto ya moto
Mgr Gintaras Linas Grušas, episkopo-mokonzi ya Vilnius mpe Mokambi ya CCEE, afungolaki likita lyango. Na lisukulu na ye, alimbolaki ete masolo mya Eklezia esengeli kotalela moto, kolendisa bokutani kati na bato, kokolisa boyambi mpe bomoko to komunio, kasi ekoki kosalema tè mpo na bopona bato mpe kokabola bango. Na nsuka, episkopo akundwelaki ete, mokili mwa interneti ezali mokili ya mabanzo tè, kasi ezali nde mokili ya solo oyo ezali na bato ba solo oyo bazali na mituna na bango, bampasi ba bango, bilikya na bango mpe bamposa na bango.
Koluka ndimbola o kati ya bisika bya interneti (espaces numeriki)
Likita lya liboso ya mosala ezalaki mpe na ntina mingi. Na maloba ma ye, Mgr Lucio Adrián Ruiz, Secrétaire ya Dicastele mpo na makambo matali kosolola, emonisaki ete mosala ya interneti ezali kaka kosalela ba tekinoloji to kobimisa ba makambo na kati te, kasi lolenge kani eklezia ya lelo ezali kosakola Nsango Elamu. Mpamba te, Mgr Ruiz alobaki, bato bazali kofanda, kosolola mpe koluka ntina ya bomoi na bango na bisika ya interneti. Eklezia esengeli kosalela bisika wana na bosolo mpe na ntina.
Mayele ya bomoto mpe lolenge lya kosilisa mikakatano
Likita lyango epesaki mpe makanisi mingi ma ntina ya bopusi ya mayele ya bomoto o kati ya masolo ya eklezya, mpe na lolenge basango bazali kosalela basite ya kosolola na bato mpe lolenge ya kosilisa mikakatano ya kosolola oyo ekoki kobima na mangomba to ba eklezya ndenge na ndenge.
Likita ya bamemi-nsango mpe bakambi ya bapanzi-nsango ya ba episkopo ya Eropa, oyo ekolanda, ekosalema o mokolo mwa 5 kino 7 ya sànzà ya Màyi ya mobù 2027 na mboka to engumba Sofia, na ekolo ya Bulgarie.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.