Luka

Bikela to misala ya Ngambo ya Moniele (Orient) – 13 Màyi 2026

Baeklezya ya Aziya bayangani na Paris mpo na bambula 170 ya mosala ya Orient

O mokolo mwa lomingo la 10 ya sànzà ya màyi, bakonzi ya mangomba ya Katoliko koleka nkàmà moko na tuku mitano (150), baepiskopo, basàngó, bamamelo, mpe basambeli ya mangomba ya Azia bayanganaki na Notre-Dame ya Paris mpo na kosepela bambula nkàmà moko na tuku sambo (170) ya mosala ya Eklezya Katoliko na Orient. Bauti na Liban, Irak, Syrie, Ukraine, Ethiopie, Inde, Roumanie, Terre Sainte, Egypte mpe Arménie, mpe basololaki makambo maye mangomba mpe bato ba bango bakutanaka na yango, oyo mbala mingi etondi na bitumba mpe na mikakatano. Nsima ya mokolo mwa yambo ya bokutani mpe ya masolo, milulu ekóbaki na Notre-Dame ya Paris nà misa, ekambamaki na Episkopo wa lokumu Claudio Gugerotti. Mokolo mwango, ezali mpe mokolo oyo bakosepelaka mokolo mwa bakristo ya Orient. Ezali komonisa ntina ya kosolola, ya bondeko mpe ya kosalisa bato ba Orient na mokili mobimba.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

14 sánzá ya mítáno 2026, 11:08