Luka

Bansango ya Misàlà to bikela ya ngambo ya Moniele (Orient) – 6 Màyi 2026

Kala te, Yaroun, oyo ezwami na Ngele to Sudi ya Liban, ekokóma liboke ya mintikà

Babebisi ndako moko ya bamamelo ya lingomba ya ba Salvatorienne, o mokolo mwa mitano, mokolo mwa yambo na sànzà ya màyi (1er Mai) na basoda ya Israël. Bandako ya basivile mpe ebebisamaki, bongo mpe na bamboka mingi, oyo ezali na mindelo ya ekólo eye. Ezali likambo lya sika te. Na 2024, bandako-nzambe ya Ba-Melkite na Yaroun mpe na Derdghaya, oyo ezali esika ya lokumu na Liban, ebebisamaki. Likita lya baepiskopo ya Katoliko ya Grèce ezali kotelemela misala mya bokitisi mabelé na bisika bizalaki na bato te mpe bizalaki na nsé ya bokonzi ya basodá. Ba ndako-nzambe, biteyelo, mpe bandako, ebebisamaki. Mobeko ya mokili mobimba esengi ‘te bato bábatela biloko na bango mpe bisika bya bango ya losambo mpe biteyelo bya bango. Koboma bisika binà ezali lokola ‘te bazali kopekisa bato bázonga lisusu na bamboka na bango. Basengi na bakonzi ya Liban, na ONU mpe na bibongiseli (institutions) ya mokili mobimba ‘te bàtika to bàsukisa kobebisa biloko mpe bàbatela basivile.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

07 sánzá ya mítáno 2026, 16:56