Babeti Mamelo moko na Yeruzaleme, bakangi moto bakanisi ‘te asalaki mbeba enà
Bansango ya Vatikan
“Mpota ya koyinana ezali mokakatano mpo na biso banso”, ezali wana, maloba Sàngó Olivier Poquillon, mokambi ya École bibliki mpe archéologiki ya Jérusalem (EBAF) alobaki, mokolo mwa minei, mwa 30 Aprili, na X, mpo na maye matali kobundisama y amamelo moko, pene ya lilita ya Mokonzi Davidi, na Ngoma Sioni, na mokolo mwa 28 ya Aprili. Ngondo mwasi oyo, ozali mibonzà ya Patriarche Latin ya Yeruzaleme, moto ya ekolo ya France ya bambula tuku minei na mwambe (48ans). Azali mwa kelasi oyo azali kosali boluki-luki na eteyelo ya likolo: École française ya recherche biblique et archéologique ya Yéruzaleme. Mobali moko alandaki ye na balabala, atindikaki ye makasi na mabele mpe abetaki ye na makolo. Ba mpulusi basokoro to mpulusi balakisaki video mokolo ezali komonisa matutu (ecchymoses) na ngambo ya loboko la mobali ya elongi ya mamelo yango.
Mobulu epai ya basángó
Basokoro ya Israel bayebisaki na bato ‘te bakangaki mobali moko ya bambula tuku misato na motoba (36 ans), bakanisi ‘te ezali ye moto abundisaki mamelo. Bakengeli bazali kotalela likambo liye na «bokebi mpenza», mingi mpenza soki moto yango akanaki kosala mosala monà na nkó esika ya bamibonzà. Awa bazali kozela mokano ya bazuzi, Sàngó Poquillon apesi matondi na baye bayaki kosunga ye na tango bazalaki kobundisa ye ; alobeli bongo ba diplomati, bato ya kelasi ya eteyelo ya likolo, mpe bato banso basusu.
Kobatela bonsomi bwa losambo
Na mikolo miye miùti koleka, mokambi ya École ya recherche biblique mpe archéologique afundaki likambo wana lokola «kobundisama ya ntina ‘te», oyo esalemaki na esika ya mamelo, bongo akweyisaki likambo linà. Ministele ya Israele oyo etalaka makambo ya libanda ya mboka (ministère israélien des Affaires étrangères), elobaki na liyebisi moko ebimaki na nzela ya X, ‘te ezali likambo lya nsoni mingi. Alaki ‘te, Israele ezwi mokano ya «kobatela bonsomi ya losambo, na biyamba binso». Moto asàlàki likambo liye, bakangi ye na boloko, elobi ministele ya Israele. Politiki na ye ezali ya kolandela bato baye banso basàlàka mbebà. Mingi mpenza soki mobulu moye esalemi na baoyo basali na bango eloko te, to mpe soki esalemi na moko ya baye bazali na mangoba ya bamamelo.
Ata mpe ekolo ya France, ekweyisi, likambo linà lya mobulu. Alobi ‘te, etumbu esengeli kozala polele, mpo ezala ndakisa na basusu, batika kotungisa bamibonzà, baye bazali kosakola kristu soki te. Epai mosusu, consul ya France oyo ezalaka na Yeruzaleme, akendaki kotala kelasi eye ya École biblique mpe archéologique ya Yéruzaleme mpo na kolakisa bondeko epai ya bamamelo.
Kibonguna ezali se kobakisama
Faculté ya sciences humaines ya Eteyelo ya likolo ya ba Liebele (Universite hébraique) ya Yeruzaleme emonisaki mpe na liyebisi yango ‘te “etungisami mingi mpo na likambo liye, mpe ekweisi” mobùlù monà. Engebene na ye, oyo ezali likambo moko esalemi kaka mpamba te, kasi ezali eteni ya momeseno oyo ezali kotungisa mpo na bonguna oyo ezali se kokola epai ya lisangá ya bakristu mpe bilembo bya yango. Kutu na ebandela ya sànzà ya Aprili, mapinga ma Israele elongolaki basoda mibale na misàlà mya bango, mpamba tè babebisaki ekeko ya Yezu na mboka Debel, na Sudi ya Liban.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.