2023.03.20 Elilingi mpo ya ndakisa 2023.03.20 Elilingi mpo ya ndakisa 

Zimbabwe: Koponama ya episkopo ya sika na Chinhoyi

Pápa Léon XIV aponaki Sàngó Patrick Ngwenya episkopo ya diosèze ya Chinhoyi. Nganga-nzambe ya Archidiocese ya Harare, azalaki kino lelo sàngó ya parwase ya Saint-François-Xavier mpe mokambi ya apostolat mpo ya mabota.

Bansango ya Vatikan

 

Tata Mosantu aponaki Sàngó Patrick Ngwenya, oyo azalaki nganga-nzambe na engumba Harare, mpo ‘te azala episkopo ya dioseze ya Chinhoyi, na Zimbabwe. Kino sikawa, azalaki kosala mosala na ye lokola Sàngó ya parwase Saint François-Xavier na Harare, mpe azalaki mpe mokambi ya apostolat ya mabota ya archidiosèze.

Mgr Patrick Ngwenya abotamaki o mokolo mwa yambo ya sànzà ya Febwali ya mobù 1967 na Mutare, na dioseze ya ya mboka ena. Sima ya bakelasi na yé na eteyelo ya likolo na Sciences ya education na ekolo ya Zimbabwe. Atangaki mpe marketing na Business Career Development College (LCCI). Azalaki molakisi yambo te akota na likindo ya propedetique ya mboka en ana Sacré-coeur na Mazowe, na archidioseze ya Harare na Zimbabwe. Akóbaki kelasi ya filosofi na likindo ya Saint-Augustin ya Bulawayo, sima asalaki kelasi ya teoloji na eteyelo ya likolo Saint-Thomas-d’Aquin (Angelicum) ya Roma. Akulaki bonganga o mokolo mwa 25 ya sànzà ya Agusti ya mobù 2007 mpo na Archidiosezez ya Harare. Asalaki misala ndenge na ndenge, na ndakisa, azalaki Sàngó-Molandi na Chegutu, Sango Mokonzi mpe Mokambi ya mission na Mutoko, bongo mokambi ya lingomba. Azalaki mpe moko ya Collège ya ba consultants mpo na mibù zomi koleka.

Mosala ya mobateli ya mpate na kati ya libota

Na nzela ya mosala mwa ye ya parwase, Mgr Ngwenya azalaki na mikumba mingi na Eklezia ya mboka: Secrétaire ya Archevêque ya Harare, mokambi ya centre catholique Ruvarashe mpo na bato ba bokono (bato na maladi), mpe mokambi ya bureau ya mabala ya archidiocèse. Ayekolaki mpe mingi na biteyelo na ye ya kelasi na nzela ya diplome ya libala mpe bomoi ya libota na “Institut pontifical ya théoloji Jean-Paul II” na Inde. Kobanda 2024, azalaki mokambi ya libota ya bantoma ya archidioseze ya Harare, liboso ya koponama na 2025 sàngó ya parwase ya Saint-François-Xavier na Braeside.

Na boponami boye, Sàngó Patrick Ngwenya abyangami mpo na kokamba dioseze ya Chinhoyi, na lisalisi lya eksperiansi na ye ya mosala ya bonganga-nzambe, mateya ma ye ya kelasi mpe bomipesi bwa ye mpo na libota mpe bomoi bwa eklezia.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

11 sánzá ya mínei 2026, 22:42