Episkopo-Mokonzi to Archeveki ya Luanda,  liboso lya Pàpa, Leon XIV, na tango ya misa na Kilamba, o mokolo mwa lomingo mwa 19 aprili. Episkopo-Mokonzi to Archeveki ya Luanda, liboso lya Pàpa, Leon XIV, na tango ya misa na Kilamba, o mokolo mwa lomingo mwa 19 aprili.  

“Papa Oye, Angola Oye !” Wana nde Botóndi ya episkopo-mokonzi ya Luanda

Na nsuka ya misa oyo esalemaki mokolo mwa lomingo na Kilamba, Mgr Filomeno do Nascimento Vieira Dias, episkopo ya mboka-mokonzi ya Angola, apesaki matondi mingi na Pápa mpo na boyei bwa ye. Mokolo moye mozali mokolo mwa esengo, ya kokamwa, oyo Nzambe abongisaki mpe alingaki yango, oyo bato mingi bazalaki kolula mpe kozela; elimboli ye.

Bansango ya Vatikan

 

Na nsuka ya misa oyo asalaki mokolo ya lomingo na ntongo na Kilamba elongo  na Papa, episkopo ya Luanda, Mgr Filomeno do Nascimento Vieira Dias apesaki maloba ma botondi na Pàpa. Na nsima, alobaki boye:

Tata Mosantu 

Tango o mokolo mwa 7 ya Agusti ya mobù 1628, Mgr Francisco do Soveral, episkopo ya mitano ya Congo mpe Angola, akomi na mabongo ya Luanda mpe aponi engumba wana lokola esika ya sika ya baepiskopo ya Congo mpe ya Angola, akokaki kokanisa te ‘te mibù nkàmà minei (400ans) na nsima, moko ya bandeko ba ye ya Augustin, Pape ya Eklezia Mosantu, akoya kotala mabele maye yemei ateyaki to asangelaki Nsango Elamu.

Boyei bolamu, Tata Mosantu, na mokili moye motondi na milende mpe na mosala ya ba Augustins. Na esengo o mitema, tozali kopesa bino melesi mingi mpo na boyei bwa bino. Na Luanda, Angola ezali koyamba bino na esengo oyo ya mosolo, oyo ezali se na ezalela na biso, mpe ya boyambi oyo tozwaki lokola likabo mpe ekabolami lokola ngolu.

Tata Mosantu, mokolo moye, mozali mokolo mwa esengo, mokolo ya kokamwa, ebongisamaki mpe elingami na Nzambe, bato mingi bazalaki kolota mpe kozela yango. Esengo emonisami na koseka ya bilenge, emonisami mpe na kokamwa ya bato banso. Moto nyonso mpe eloko nyonso ezali kosepela. Ezali mpenza mokolo mwa eyenga to ya feti. Feti ya mobembo ya Papa na biso, tata na biso na boyambi, mokengeli mpata na biso, lolàkà ya Kristu epai ya bikolo. Ayei kozala na kati ya bato ba ye, azali motema moye moyambaka moto nyonso, ebondisaka baoyo bazali na mawa mpe epesaka elikya na bato banso.

Natondi yo botondi, Tata Mosantu, mpo na kozala kati na biso. Ozali kongengisa biso na liloba na yo, ozali kobondo biso nà bobenisi bwa yo. Okopesáká biso biloko binso ya kitoko, biloko ekobotaka mbuma mpe oyo ekobotisama lisusu. Tata mosantu, pambola to benisa bato ba yo, bana ba yo mpe bandeko ba yo; pambola mabele ma biso, salisa biso mpo na kobikisa bampota na biso, tozala bato basangani na boboto, bosolo mpe bosembo. Libota lya bandeko, maboko na maboko mpe bamipesi mpo na bolamu mpe bolamu ya basusu.

Kotika moto moko te pembeni, kotika moto moko te na sima, kobosana moto moko te, kozokisa moto moko te”. (Tala na Mat. 24:37-44). Salisá biso tómona nzela ya kozala esika moko na kimya nyonso, ya bozangi bokabwani ya politiki. Tiká ete politiki ekabola mabota te, ekabola baninga te, ekabola baninga ya mosala te, ekabola mboka te, ekabola mpe bato te. Bato ya Angola bakende liboso, mpe bato ya Angola koleka.

Salisá biso tósosola ‘te mposa ya kozongisa boyokani mpe ya kimya ezali, lokola Tata Mosantu alobaki yango na Liban, “likabo mpe lobalà to elanga oyo ezalaka kaka se ya kofungwama tango inso”, mpe ‘te “esengeli kozala na molende mpo na kotonga kimya; esengeli kozala na molende mpo na kobatela bomoi mpe kokólisa yango”. Na mokolo moye ya kotondo botondi, nazali kokanisa na limemya nyonso mpe na botondi nyonso, bato oyo bandimelaki Yezu Kristu liboso na biso, baoyo batyaki moboko (fondement) ya eklezya oyo: banganga-nzambe, balayiki, bato bayiké, mpe bamibonza mingi ya basi. Basusu kati na bango bakufaki mpenza mpo na kondima na bango. Tika ‘te boyambi bapesaki na bolingo mpe na bomipesi na bango, ezala mpema ya bomoi ya Angola oyo tolingi. Angola esengeli kozala mboka ya boyambi, ya bondeko mpe ya bokóli; esengeli kozala elembo na biso, ADN na biso, lolenge na biso ya kozala mpe ya komilakisa na mokili.

Tata Mosantu, tika ‘te Ngondo Maria ya Muxima, Mama Muxima, Mama wa Angola, azala elongo na yo na mobembo moye. Matondi, Tata Mosantu.

Pàpa Oye ! 

Angola Oye !

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

19 sánzá ya mínei 2026, 22:16