Mgr Jean-Marie Vianney Musul Masas, episkopo mosalisi ya dioceze ya Lubumbashi (RDC) Mgr Jean-Marie Vianney Musul Masas, episkopo mosalisi ya dioceze ya Lubumbashi (RDC) 

Episkopo mosálisi yókó ya sika na dioceze ya Lubumbashi na Congo-Kinshasa

Tatá-Esántu alubolaki episkopo mosálisi na dioceze ya Lubumbashi na Congo-Kinshasa, sángó Jean-Marie Vianney Musul Masas, kinó sik’oyo chancelier na dioceze ená, na bopesi ye ebonga ya mokúmbá ya Satafis. Azali episkopo mosálisi ya yambo ya dioceze ená eye ezali na 61 828 km2, na bato bakokóma ebelé.

Vatican News

Mgr Jean-Marie Vianney Musul Masas abotami na 23 ya sánzá ya mwambi 1974 na Fungurume, na dioceze ya Lubumbashi. Sima ya botángi na petit séminaire Saint-François-Xavier-de-Sales na Lubumbashi úta 1988 kinó 1994, azuaki maîtrise mókó na philosophie na université ya mibalé ya Congo-Kinshasa. Akobaki lisusu na boyékoli mambi ma Nzámbe na grand séminaire Sántu-Polo. Akulaki bonganga Nzámbe na 25 ya sánzá ya sambo 2009, azuaka na bolandi mabonga ya sángó-mokónzi ya paloise Sántu-Augustin ya Lubumbashi, úta 2009 kinó 2011; aumônier ya ba Sœurs Pies Disciples du Divin Maître mpe ya ba Sœurs de la Charité de Jésus et Marie ya Lubumbashi, úta 2011 kinó 2020; secrétaire général molandi ya synode ya mibalé ya dioceze mpe administrateur paroissial ya Sántu-Yoane-Polo Il na 2012. Azalaki kinó sik’oyo chancelier mpe cérémoniaire ya dioceze mpe úta 2015, vicaire dominical na Notre-Dame-de-la-Paix ya Lubumbashi.

Mosálisi mókó mpo ya dioceze yókó ya monéne mpe bokoli makási

Esálema na 1910 lokolá préfecture apostolique ya Katanga, dioceze ya leló azuaka mabelé na ye ya vicariat apostolique ya Léopoldville, leló dioceze ya Kinshasa.  Etombolamaki na vicariat apostolique na 1932 na bref apostolique «Magna cum delectatione» ya Pie XI. Na 10 ya sánzá ya zómi na mókó 1959, likoló ya bulle «Cum parvulum» ya Yoane XXIII, vicariat apostolique emataki na molongo ya archidiocèse métropolitain na nkombo ya Elisabethville, ekomaka na 1966 Lubumbashi. Na molayi ya 61 828 km2, dioceze ezali na ba paloise 75, bikabwani na engúmba ya Kambove mpe bituka ya Likasi mpe ya Lubumbashi, ebonga na ye ya episkopo, engúmba yókó na boleki bato milio 2,8 na 2023. Motángo ya 2021 elakisaka bato koleka milio 3,5 na engúmba ya dioceze, na pembeni ya ba katoliko milio 2.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

17 sánzá ya mínei 2026, 13:23