Luka

2026.04.24 Na tango ya kopesa ba fungola ya mituka mibale mpo na kobongisa kotambola ya bato na bamboka ya mike bakendaka. na Côte d’Ivoire, na Kossandji 2026.04.24 Na tango ya kopesa ba fungola ya mituka mibale mpo na kobongisa kotambola ya bato na bamboka ya mike bakendaka. na Côte d’Ivoire, na Kossandji 

Cote d’Ivoire, Eklezia ya Abidjan ezali kokólisa kobaluka-baluka na ba mboka mpe na kosangisi bato

Na parwase rurali ya Sacré-Coeur ya Kossandji, na mindelo ya diosèze ya Abidjan, Episkopo wa lokumu Ignace Dogbo Bessi, episkopo-mokonzi ya Abidjan, apesaki na mokolo mwa 20 ya Aprili, mituka mibale mpo na kobongisa kobaluka-baluka, mpe bomoi ya bato ya mboka yango. Ezali likanisi lya mosala ya bonganganzambe, oyo ezali kati na likanisi lya Eklezia oyo ezali pene na makambo ya bato mpe oyo ezali kosala mpo na bokóli ya bato banso.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mboka oyo ezali mpasi mpo na kokóta, oyo ezali na banzela ya mabanga-mabanga mpe ya kobalukabaluka, kopesa bisi ya bisika ya kovanda tuku misato na mibale (32) mpe motuka ya kilo 30, oyo babengi «Catho Express», ezali eyano ya polele na mikakatano mya bato ya esika yango mpo na kokende mpe kozonga na bamboka na bango. Ebongiseli eye epesamaki na sanza ya Febuali ya mobù moye, ezali moko ya bibongiseli ya lolenge ya «eklezya esengeli kobima» mpo na kokokisa bamposa ya bato, mingi mpenza na bamboka ya malwekato ya mosika.

Babateli ba mpate basengeli kosàla mosalà mwa bango mpo na lokumu la bato

Sàngó Yves-Saint Laurent Ayémou, Econome-mosungi ya diosze, alobi ‘te likanisi lyango ezali na makambo misato ya ntina: «lokumu la moto, bozali bwa eklezya, mpe bosembo na kati ya mboka». Tango akendaki ye moko na mobembo na Kossandji, Episkopo wa lokumu Ignace Dogbo Bessi alingaki komonisa ‘te eklezya ezali pene na bato ya bamboka ya zamba, oyo mbala mingi bakutanaka na mikakatano ya kozala bango moko.

Bino moko bopesa bango biloko ya kolia

Na molulu ya kopesa libonza, oyo esalemaki na mpwasa na mboka, na esika ya bato banso, episkopo ya Abidjan abendaki likebi na likambo la ntina na mpó ya elimo mpe ya bato: «Ezali libaku ya kozongisa matondi, kasi ezali mpe libyangi mpo na kososola ‘te nsango Elamu esengeli kokotisa bomoi bwa solo o kati ya bayambi». Na nzela ya Nsango Elamu, akundwela bango ‘te Kristu abyangaki bango mpe alobaki ‘te: «Bino moko bóleyisa bango». Na yango asengaki bango eyamba eye ekobongwanaka na bikelà biye bizali komonono mpenza mpo na kosunga baye bazangi makasi. Alendisaki mpe bato bazali kozwa lisungi yango, mpo ‘te básalela yango na ndenge elongobani, «mpo na bolamu bwa bato banso, na bozangi kosala bokeseni na bato to kopona bilongi».

Yoko libondi mpo ya lisanga lya bato (population)

Bato ya mboka basepelaki makasi na likambo lyango. Olivier Séka, mokambi ya lisanga lya bakambi ya Kossandji, apesaki matondi na nkombo ya bato baye bazwaki makabo: “Lelo ezali mokolo mwa ntina mingi. Kossandji ezali kopema, Kossandji ezali kotambola, Kossandji akitisi motema”. Amonisaki ‘te mituka yango ezali kokokisa bamposa ya ntina: “Kala, komema biloko na biso ezalaki mpasi”, mpe bato ba maladi, ata mpe basi ya zemi, bazalaki komema bango na bisika ya mosika na mpasi.

Na molimo ya kosàla na bomoko, bakonzi ya mopelengano to ya politiki bayaki na likanisi liye na nzela ya likabo ya ambulance ya bokolongono bwa nzoto, mpo na kobakisa makoki ya kozwa lisungi na etukà. Na nsima, bato ya mboka bapesaki lopango ya hectare misato na eklezya, mpo na kotonga ndako moko ya tekiniki. Sé bongo, basalaki boyokani mpo na bokóli ya mboka. Na nzela ya mosala moye, Eklezia ya Abidjan ezongisi lisusu molende na yango mpo na bokóli, epai Nsango Elamu ezali kobongwana na bomoi ya bato, mingi mpenza baye  bazali na makoki te.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye..

24 sánzá ya mínei 2026, 17:31