Luka

2026.04.03 Episkopo wa lokumu Pizzaballa, na tango ya milulu mya Malozi.. 2026.04.03 Episkopo wa lokumu Pizzaballa, na tango ya milulu mya Malozi..  (Foto Latin Patriarchate of Jerusalem)

Episkopo wa lokumu Pizzaballa apesi likanisi ya kolanda na Eklezya ya Terre Sainte

Mokambi ya Eklezya ya Yeruzaleme abimisi mokanda ya bopesi lisalisi na bayambi ya dioseze na ye. Elobi boye: “Bazongaki na Yeruzaleme na esengo enene”. Nde likanisi ya kolanda mpo ya kokokisa libyangi lya eklezya na Mabele Masantu (Terre Sainte). Likanisi lyango ekabolami na biteni basato: - koyeba kotanga maye mazali koleka; libyangi, ndoto ya Nzambe na nkombo ‘te Yeruzaleme; mpe maye masengeli kosala na pastorale. Pizzaballa apesi likanisi na Yeruzaleme ya lelo mpo ya kolengele oyo ya likóló.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ezali makómi moko milayi mpe etondi meke (texte long et dense), oyo Patriarche to mokambi ya eklezya ya Yeruzaleme abimisaki o mokolo mwa lundi. Ezali mbuma ya mosàlà moko “ya bontoki mpe ya mpasi”, ebotamaki mokolo mwa 7 ya Okotobe mpe na tango ya bitumba ya Gaza. Ezali kolobela makambo mazali koleka solo, kasi, akebisaki ‘te mokanda mona mozali na “makanisi to ba analyse ya politiki te”. “Elobeli politiki” bobele na ndimbola ya liloba ya Greke “polis”, to engumba.

Na yango, Patriarche alobi ‘te “mobulu ya 7 Okotobe mpe bitumba na Gaza ezali elembo ya “kobongwana ya paradigme na mokili mobimba”, oyo ezali komema biso longwa na “mobeko ya mokili mobimba oyo esimbami na mibeko” mpe na mikili misusu na “kosalela makasi lokola esaleli ya ntina mpo na kosukisa matata”.

Mpasi ya baoyo bazali konyokwama

Nde wana “bokabwani” ebimi, mpe yango ezale se kobotisa “mpasi, koyinana mpe kozanga kotyelana motema”. Mpo na mokonzi ya Lingomba ya Katoliko ya Latin na Mokili Mosantu to Terre Sainte, ezali na ntina te ‘te mpasi nyonso ezala na esika moko. Na esika ya “kotanga baa mpasi yango”, alobi ‘te, “ezali na bokeseni kati na baye bazali na bokonzi mpe baoyo bazali se kozwa mitindo”: “makambo mazali lolenge yoko te” mpe kondima yango, “ezali komonisa limemya mpo na bosembo mpe bosóló”.

Kobanda na makambo maye bato ba Palestine bazali kokutana na yango na Gaza mpe na Cisjordanie, Episkopo wa lokumu Pizzaballa azali kolobela mokumba ya Eklezia na Terre Sainte, na motuna moye ma ntina: «Mokano mwa Nzambe mpo na Yeruzaleme ezali nini? Akundoli ‘te lotomo ya liboso ya engumba ezali « kozala esika ya emoniseli ya Nzambe» Nzokande, «kozanga koyeba» makambo maye «matelemi» na mabele ma biso ezali « ntina ya yambo ya bozangi boyokani mpo na kofanda esika moko elonga » na bambula miuti koleka.

Patriarche alobi lisusu ‘te «mikalo  to mindelo mizali mpo na kobatela bonsomi, kasi mpo na kopekisa yango te » ; mpe ‘ te « ekoki kosalema ‘te bato bafanda esika moko, na limemya mpo na bisika monigà mosusu, na kotalela lisoló ya moto na motompe bokeseni na lolenge ya mayoki ». « Ezali na bisika te mpo na kobotola yango kasi ezali na bisika ya boyokani mpo na kotonga elongo », elandaki ye koloba. Akanisi ‘te, lisanga lya mokili mobimba ezali na mokumba na yango ya kosala.

Eklezya ezali esàleli ya libiki

O kati ya makambo maye, Eklezia ya Yeruzaleme, eklezia ya moke kasi mpe ya makasi, ezali esika ya koyamba bampaya, mwinda mwa Pasika oyo ezali kongengisa molili ya boyinani », ezali « ndako oyo ezali na bizibelo sé ya kofungwama, mpe « esaleli ya kobikisa bato na mokili ». Yango ezali kosalema mingi mpenza na mabota, na bandako-nzambe, kasi mingi-mingi na biteyelo, na ba «laboratoires ya mikolo mizali koya », na balopitalo mpe na misala malamu ya bato, oyo ekambami na Eklezia.

“Ezali na ntango wana nde masolo ebandaka. Ntina ya koloba mingi ezali te”, elobaki episkopo wa lokùmu Pizzaballa, oyo andimaki ba tembe azalaki na yango, na mpe kozanga koyeba, nà ba mikalo mya ye. Ndenge nini tokoki kosala nyonso wana? ⁇  atuni ye. Ayanolaki ete: "Soki tozali kaka biso moko, tokokoka te". Nzokande, baklisto ya Mokili Mosantu bazali bongo te, Yesu azali kati na bango, azali kosepela. Na nsuka, Patriarche ya Latin alobi ete esengeli kaka kozongela esengo ya Nsango Elamu.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

28 sánzá ya mínei 2026, 11:36