2026.04.16 Mgr Jean-Marie Vianney Musul Masas, Episkopo-Molandi ya sika ya Lubumbashi na RDC. 2026.04.16 Mgr Jean-Marie Vianney Musul Masas, Episkopo-Molandi ya sika ya Lubumbashi na RDC. 

Baponi Episkopo-mosalisi ya sika na Archidioseze ya Lubumbashi na RDC

Tata Mosantu aponi episkopo mosungi na Archidiocèse ya Lubumbashi na Congo démocratiki, sàngó Jean-Marie Vianney Musul Masas. Kino lelo azalaki Chancelié kaka na yoko Archidioseze. Ba pesi yé mokumba monene ya Satafis. Azali episopo- mosalisi to mosungi ya yambo ya archidiocèse oyo ezali na etando ya 61 828 km2, na bato oyo bazali se kobakisama.

Bansango ya Vatikan

 

Mgr Jean-Marie Vianney Musul Masas abotamaki o mokolo mwa 23 agusti ya mobù 1974 na Fungurume, na Archidioseze ya Lubumbashi. Nsima ya kokende na likinso ya moke ya Saint-François-Xavier-ya-Sales na Lubumbashi kobanda 1988 kino 1994, azwaki diplome ya master na Filozofi na eteyelo ya likóló (Université) ya mibale ya RDC. Na sima akendaki kolandela koyekóla matangi ya teoloji na likindo monene ya Saint-Paul. Akulaki bonganga-Nzambe o mokolo mwa 25 ya sanza ya Yuli ya mobu 2009. Lokola Sangó, abandaki mosàlà na parrwase Saint-Augustin na Lubumbashi, kobanda mobù 2009 kino 2011. Na sima asalaki ki omonié ya bamamelo ya Sœurs Pies Disciples du Divin Maître mpe ya ba mamelo Sœurs de la Charité de Jésus et Marie na Lubumbashi, kobanda mobù 2011 kino 2020; nzokandé akomaki secrétaire général molandi ya sinode ya dioseze ya mibale mpe administrateur paroissial ya Saint-Jean-Paul II na 2012. Azalaki kino sika chancelier mpe cérémonier ya dioseze mpe banda 2015, Sangó-Molandi na Notre-Dame-de-la-Paix na Lubumbashi.

Boko Mosungi mpo na archidioseze monene ezali sé kokola

Archidioséze oyo ya Lubumbashi, ekomamaki bongó na 1910 lokola préfecture apostolique ya Katanga, archidiocèse ya lelo ezwaki territoire na yango na vicariat apostolique ya Léopoldville, lelo archidioseze ya Kinshasa. Na nsima, na mobu 1932, Pápa Pie XI akómisaki yango Vicariat apostolique na nzela ya mokanda mwa ye oyo ebengamaki “Magna cum delectatione”. Na mokolo mwa 10 Novémbe ya mobù 1959, na ntina ya búku “Cum parvulum” ya Jean XXIII, Vicariat apostoliki etombwami na esika ya archidiocèse métropolitain na kombo ya Archidioseze ya Élisabethville, oyo ekomaki Lubumbashi na 1966. Etando na yango ezali na kilometele-kare (61 828Km2). Archidioseze oyo ezali na ba parwase tuku sambo na mitano,75, etandami na etukà (territoire) ya Kambove mpe na ba engumba (villes) ya Likasi na Lubumbashi, esika-mokonzi na yango. Métropole oyo ezalaki na bato koleka 2.8 millions na 2023. Ba mituya (statistiques) ya 2021 emonisaki population ya koleka 3,5 millions ya bato na zone pastorale ya archidioseze, na pene ya 2 millions ya ba Katoliko.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

16 sánzá ya mínei 2026, 22:04