Bansango eùti na bikela bya Orient - 29 Aprili 2026
Katedrali ya ba-Arménie, ya Sainte-Mere-de-Dieu ya Stepanakert ezali lisusu te. Bakonzi ya Bakou nde basukisaki yango. Sputnik, ndako ya bopanzi Nsango ya Armenia eyebisi likambo liye, na lisalisi lya bililingi ya satelite oyo bazwaki na sanza ya Febwali mpe ya Aprili. Na 2019, Eklezya apostoliki ya Arménie etongamaki sima ya ba mbula zomi ya misala. Ndako-nzambe yango ezalaki kaka esika ya losambo te, kasi ezalaki mpe esika oyo bato ya Arménie bazalaki kofanda na Haut-Karabakh. Kobebisama na yango ezali eteni ya likambo linene ya kolongola libula ya bonkóko ya Arménie na Haut-Karabakh. Mwa mikolo liboso, toyokaki nsango ya kobebisama ya ndako-nzambe Saint-Jacques, Sourp Hagop, oyo ezali mpe na Stepanakert.
Banda mokolo basoda ya Azerbaïdjan bazwaki bokonzi ya mboka na sanza ya libwa ya mobu 2023, mpe babenganaki bato koleka 120 000 na makasi, bandako ya losambo ebebisamaki, malita ebebisamaki, makomi ya Arménie elongwaki. Na sanza ya Aprili ya mobù 2024, ndako-nzambe ya Saint Jean-Baptiste ya Chouchi, oyo eyebani na nkombo ya Kanatch Zham, elongo na simetiere na yango, ebebisamaki. Bazangaki ata te kobebisa parlement ya Républiki ya Haut-Karabakh na Stepanakert. Koboma mabanga, ezali komeka kolongola makanisi to bokundoli ya bato. Kasi lisapo, yango, elimwaka sima ya biloko biye bibebá.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.