FILE PHOTO: A man holding a South Sudan's flag takes part in a national day of prayers for peace lead by South Sudan's President Salva Kiir at the state house in Juba

Sud-Soudan: Baepiskopo bazali kokweisa kobomama ya bato na Jongl

Basangani ya Liyangani lya baepiskopo ya Katoliko ya Soudan mpe ya Soudan ya Súdi ya Súdi (SSSCBC) basili kokweisa na makasi nyonso, makambo maye bibongiseli misusu ya ONU ezali kobénga kobomama ya sika ya basivili oyo basali likambo te na etúká ya Jonglei, na Soudan ya Súdi.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Engebene bakonzi ya mangomba na Soudan ya Sùdi, bato soko nkàmà moko na tuku motoba na libwà (169) babomamaki na makambo maye balobaki ‘te ezalaki «mobulu ewuti na makambo ma mopelengano to politiki kati na bato ya mboka moko». Bato baye bakufaki mpe bazokaki na masasi yango bakoki kozala mingi koleka. Bato mingi ya Abiemnhom bakendaki na engumba Abyei.

Mpo na yango, ba episkopo balobi ‘te :«Tózali kokweisa na makasi nyonso koboma wana ya nsɔómo mpe ya bozoba. Eloko moko te ekoki kopesa nzela na koboma basivili oyo basali likambo te. Kosala bongo ezali lisumu epai ya Nzambe, Mozalisi ya bomoi, mpe lisumu monene epai ya bato. Tozali komonisa bomoko na biso ya libela na bato na biso ya Ayod mpe ya Abiemnhom, oyo bazali lisusu kati na mawa, kobanga mpe bazali kokima mboka».

Kozongisa mabe na mabe ezali bosembo te

Maloba ma baepiskopo, oyo mapesamaki na bapanzi-nsango na mokolo mwa mibale, mwa 4 Mársi, mpe oyo mapesamaki maboko na basangani banso ya Likita lya baepiskopo, mazali komonisa nsómo mpe mawa na bango mpo na mobulu oyo ezali sé kobakisama. “Tozwaki bansango nyonso”, elobaki bango; Misala màna mizali bobele kobungisa bomoi ya bato na lolenge ya nsómo mpamba te, kasi ezali lisusu kokita na libulu mozindo ya libebi ya bato, epai wapi ezalela ya mwinda mwa bomoi, likabo lya motuya mingi oyo ewuti na Nzambe, ezali kotyolama kozanga kozwa etumbu.

Baepiskopo babakisi lisusu ‘te: “Momeseno ya kozongisa mabe na mabe ekoteli mpenza biteni bisusu ya bato na biso. Kozongisa mabe na mabe, oyo etondi na nkanda, komiyoka ‘te bamemi ngambo, mpe koyinana ya kala, ezali kokóba kobebisa mabota, kolembisa bato, mpe kolongola bana na biso bomoi malamu na mikolo mizali koyà. Kozongisa mabe na mabe ezali bosembo te. Kopesa batu etumbu na bituluku na bango, ezali te kozala makasi. Liso mpo na liso, lino mpo na lino ezali lokumu te. Baepiskopo balobi, ezaleli wana esengeli kosila”.

Mbela na bakonzi ba Soudan ya Sùdi

Mobulu moye mobimi na ntango ya matata ya politiki na Soudan ya Sùdi.

Likambo lya mawa, bitumba kati na ba Forces ya défense ya peuple ya Soudan ya Sùdi (SSPDF) mpe ba Armées populaires ya libération ya Soudan (SPLA-IO) na bisika bisusu ya Jonglei ekomi mingi. «Tozali kobyanga na lombangu mpe na molende nyonso bakonzi ba eleko eye bozalisi ya sika na bitando nyonso: bozali babateli ya bolamu bya bato banso, bozali na mokumba ya mwinda ya kobatela bomoi. Tozali kosenga na bino ‘te bosala nokinoki to na lombango, na mpiko mpe na polele nyonso», tokoki kotánga yango na maloba ma baepiskopo. Mpo na maye matali kobomama ya Ayod mpe Abiemnhom, baepiskopo basengaki boluki na bozindo mpe esengeli kosalema na lolenge ya lipanda mpo na koyeba mpe kosambisa bato baye basalaki makambo màna ya mabé.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye. 

05 sánzá ya mísáto 2026, 22:26