Rwanda-Burundi: Kokokisama ya boyokani mpo na mateya na Afrika
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mangomba to ba eklezya ya Burundi mpe ya Rwanda bazali na biteyelo mingi ya Katolike oyo bizali na biteni binso ya kelasi: maternel, primaire, secondaire, technique mpe université. Na nzela ya mokano moye, baepiskopo balingaki koyanola na lisengi lya Tata Mosantu, Pape Léon XIV, oyo alobelaki ntina mpe lombango ya kotalela lisusu mosala ya eteyelo ya Katoliko na Afrika liboso lya mikakatano ebele oyo ezali na Afrika. Yango ezali kobyanga na mituna, mingimingi bakonzi bayiké bya politiki to mipelengano mya Afrika baye, bazwaki mateya na biteyelo bya Katoliko.
Kokómisa mateya ma Katoliko eloko ya ntina mpo na mbongwana ya masanga ma bato.
Batata episkopo balakisi bosenga bya bango ya komona kotangisama ya katoliko o kati ya bikolo bya bango mibale, ekoma liziba lya kolekisa ezalela ya mabongi mwa bomoto mpe ya bokristu. Atako mikakatano ya eteni ya etando ya Bitimà binene (Grangs Lacs), Baepiskopo bandimaki ‘te “na kolanda malako boyokani to Pacte ya mateya mpo na Afrika, eklezya esengeli kotombola mateya ya malamu oyo esangisi boyebi, koyeba-kozala mpe koyeba-kosalela”. Ba ordinaires ya Rwanda mpe ya Burundi bazali komipesa mpo na kobongisa lolenge ya mateya na kolakisáká bilenge mpo batya moto na esika ya liboso mpe bayeba kobatela to kosunga bato baye bazali na makoki mingi te kati na mboka.
Na yango baepiskopo bayokani mpo basàla mosàla wana na lombango, na elikya ya “kokómisa mateya ma Katoliko eloko ya ntina mpo na mbongwana ya bomoi bwa bato” na mikili ma bango. Likambo liye likosalema na nzela ya likita monene ya mateya ya Katoliko oyo baeklezya eye mibale ya bokristu bazali kokàna kosala na mikolo mizali koyà.
Likambo ezali kati na mabongisi ya kosala na mokili mobimba
Na yango, baepiskopo balingi ‘te bato banso ya Eklezya ya Katoliko oyo bayekolaka na biteyelo bátya makanisi na bango na boyokani oyo esalemi mpo na mateya na mokili mobimba mpe na boyokani oyo esalemi mpo na mateya na Afrika. Batyaki mikano mibale ya ntango mokuse: Koyebisa bato banso mibeko ya lingomba yango mpe kosala komite moko mpo na kobongisa malako mpo na kosalela yango.
Likita lya lisàngà la ba episkopo ya Rwanda mpe Burundi, ekambamaki na Kardinal Antoine Kambanda, episkopo ya Kigali, mpe na Mgr Joachim Ntahondereye, bazali na mposa ya kosalela Boyokani ya mateya ya bato banso mpe Pacte to Boyokani ya mateya ya Afrika. Likambo liye, lizali kolanda makambo mabandaki kosalema na ba episkopo misusu ya Afrika, na ndakisa ya Nigeria mpe ya République centrafricaine.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.