Na Douala, basepeli zubile moko mpo na bantina basato ya kotondo botondi mpe ya molende na mosala ya misio
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bankóto ya bandimi to bakristu bayanganaki na molulu ya feti mpe ya losambo na Esplanade ya Cathédrale Saints Pierre nà Paul ya Douala mpo na molulu mwa Ukaristya, ekambamaki na Episkopo wa lokùmu, Peter Kodwo Appiah Turkson. Pene na mokonzi ya baepiskopo, Mgr Samuel Kleda, liyangani esangisaki baepiskopo, bakardinale, basàngó, bakonzi ba mangomba, mpe bakonzi ya Leta, mpe bakonzi ba sivili mpe baye ya bizalela bya bonkonko. Eyenga enà, emonisaki boniboni Eklezya ezali na bomoi o kati ya Cameroun.
Na lisikulu la ye, Ntóma ya Pàpa, Mgr José Avelino Bettencourt, apesaki mbote mpe bobenisi ya Pape Léon XIV, mpe alobaki, Tata mosantu atyaka likebi mingi na Afrika, na molongo ya Saint Augustin. Abengaki mpe bakristu na kotoka na misisa ya Nsango Elamu na mboka. Apesaki ndakisa ya misa ya yambo oyo esalemaki na Marienberg na 1890 na Mgr Henri Vieter, mpe bato ba ndakisa lokola Andreas Kwa Mbanguè, Baba Simon mpe Robert Naoussi. Mwa mikolo moke liboso lya mobembo ya Pápa na Cameroun, oyo eponamaki mpo na mokolo mwa 15-18 Aprili, mobembo ekomonana na bokutani bya ba institutions, ya babateli mpate mpe mpo na kimya. Milulu myango epesaki lisusu elikya mpe bomoko ya bandimi to bakristu.
Mokengeli mpate mpo na mosala mwa bato ba Nzambe
Na kolobela mosala mwa episkopo-mokonzi ya Douala, molobeli ya Esika-Mosantu alobelaki Mgr Samuel Kleda lokola “monzoto mwa mwinda” mpo na Eklezia mpe bato ba Cameroun. Azalaki sembo na maloba na ye: “Mpo ‘te bázala na bomoi bwa seko”. Akumisaki mosala mwa ye ya misionele, lisungi na ye na basàngó mpe mosala na ye ya ntango nyonso mpo na bato ba Nzambe. Bongo, alobaki mpe ‘te “Eklezia ya Douala ezalaki mpe ezali eklezia ya koyamba mpe eklezia ya misio”.
Na eleko ya Karézimo, mateya ma ye elobelaki ntina ya boyambi oyo ezali na bosolo mpe na bolingo. Na lisalisi lya Makomi, Ntoma ya Pàpa asengaki bakristu ‘te bábongola mitema na bosembo binso, na bokosi te, mpe báya liboso lya Nzambe na bomikitisi nyonso, na elikya ‘te akoyokela bango mawa. Mbula ntuku sambo nsima ya botongi bwa yango, Archidioseze ya Douala ezali kotala mikolo mikoyà nà elikya. Ebengami mpo na kokoba kosakola Nsango Elamu na kati ya mokili oyo ezali kobongwana na lobókó na libula na yango ya misio.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.