Luka

2026.01.16 Mgr. Jean-Marie CHAMI, episkopo-mokonzi ya Tarse, episkopo-mosungi ya Antioche mpe mokambi ya lingomba ya ba Melkites ya Katoliko ya Grèce mpo na Égypte, Soudan mpe Soudan ya Súdi. 2026.01.16 Mgr. Jean-Marie CHAMI, episkopo-mokonzi ya Tarse, episkopo-mosungi ya Antioche mpe mokambi ya lingomba ya ba Melkites ya Katoliko ya Grèce mpo na Égypte, Soudan mpe Soudan ya Súdi. 

Kimya ezali mokano mwa Nzambe, elobi Mgr Chami

O kati ya mokanda moko etindamaki na bandimi banso ba mokili mobimba, episkopo-mokonzi ya Tarse, episkopo-mosungi ya Antioche mpe mokambi ya lingomba ya ba Melkites ya Katoliko ya Grèce mpo na Égypte, Soudan mpe Soudan ya Súdi, azongelaki maloba ma ye mpo na losambo la makumisi mpe kokila bilei mpo na kimya, liboso lya bokoli bya matata kati na Iran, Israël mpe Etats-Unis. Atunaki mpo na nini bitumba bizali kokóba, nzokande “mangomba manso mazali kolendisa mpo ya kimya”.

Bansango ya Vatikan

 

Mokanda moye mosali makelele tango o mokolo mwa 14 ya Yanuali moleki, tango matata mazali kokóba kati na États-Unis, Israël mpe Iran, na nsima ya kobundisa na makasi etuluku moko ya bato ya Etat ya Islam. Lelo na sima, mpo na mokanda ya yambo na komaki mpe mbela ya kosala ngonga ntuku minei ya losambo mpe ya kokila bilei mpo na kimya, ntango namoni makambo maye mazali koleka na mokili, na yoki lisusu bosenga makasi mpo na kozongisa lisusu libyangi lina; elobi episkopo-mosalisi mpo na Antioche mpe mokambi molandi (vicaire patriarcal generale) ya ba melkietes katoliko mpo na Egypte, Soudan mpe Soudan ya Sudi. Azalaki kolobela bakambi banso ya bakristu, bayuda mpe bamizilma, mpe baye banso bazali koloba na nkombo ya eyamba ya bango mpe mangomba ya bango.

Liboso bwa molili mya bitumba, Mgr Chami abwaki mbela mpo na losambo mpe kokila bilei

Na bomoko, mbela ya Kimya mpo na Mangomba misato esakoli Nzambe sé moko

Kobanda na Torah, Coran mpe Biblia, alimboli yango malamu te, ezalela ya bonkoko ezali kokóba na kokanis biso ‘te: «Kimya ezali volonté ya Nzambe». Mgr Chami alobi ete na Torah, basambeli basengeli «kopesa kimya liboso lya etumba»: «Soki okómi pene na mboka moko mpo na kobunda na yango, Devarim (Deteronome) 20,10 elobi, osengeli liboso kosénga kimya. Na kati ya Coran, alobeli ntina ya musulman ya « kogumbama liboso lya kimia»: Soki baponi kongumbama na kimya, lokola ekomami na Sura 8, molongo 61, yo mpe gumbama libolo lya yé na kimia mpe tia motema na yo na Nzambe. Ye azali Moyoki mpe Moyebi.

Na kosukisa, Biblia : na (Mateo 5:7) elobi ‘te: “Esengo na bato oyo batyaka kimya, mpamba te bakobengama bana ba Nzambe”. Alobi ete makomi mana, oyo ezali na mimeseno na biso ya elimo, “ezali kobenga biso nyonso lelo oyo mpo na kofungola makanisi ma biso”.

Kobongola mitema

Soki mangomba manso mazali kolendisa kimya, mpo na nini bitumba bizali kokóba? Sango Chami azali komituna boye: Ayoki mawa na ntina ya mabota maye lelo bazali kobengana na makasi bandako na bango, mpasi oyo bazali komona na mboka mopaya, mpe mpasi oyo bana bazali komona.

“Bobele kokila bilei mpe losambo nde ekoki kopekisa molimo mabe ya bitumba”. Asukisi na kosàmbela, mpo ‘te na bolobeli bwa “Santu Maria , mama ya Yezu oyo akufaki na kuruse, mobateli ya Mokili Mosantu (Terre Sainte) mpe ya Moyen-Orient”, mpe na nzela ya mosantu François, mpe na nzela ya makila ya bato banso baye babomamaki na ntina te, mpamba te, Mokonzi apesa kimya mpe abongola mitema.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

11 sánzá ya mísáto 2026, 18:32