2026.03.13 Éthiopie :Ba episkopo bazali kosenga ‘te likambo lya kobomama ya bakristu eyebana na Oromia 2026.03.13 Éthiopie :Ba episkopo bazali kosenga ‘te likambo lya kobomama ya bakristu eyebana na Oromia 

Éthiopie: Baepiskopo basengi ‘te bàyeba ntina sima ya bobomi ya bakristu

Na ntina na mobulu moye mozali kobakisama na etuka ya Oromia, lisanga lya ba episkopo ya Eklezia ya Ethiopie (CBCE) ezali kofunda ezingelo ya mobulu ezali kobakisama epai na basivile. Ezali kosenga ‘te likambo lya kobomama ya bakristu eyebana polele mpe bosembo bopesama na baye bazwaki likàmà.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lisanga lya baepiskopo ya Eklezia ya Ethiopie emonisaki bomitungisi bwa bango ya makasi, sima ya bobomi ya sika ya bakristu na etuka ya Oromia. Kati na maloba maye mapesamaki na mokolo mwa 10 ya sanza ya màrsi, baepiskopo basengaki ‘te baluka mpenza na polele mpo bàyeba bato baye basalaki mabé manà mpe kopesa bosembo na bato baye babomamaki. Bàzali lisusu kosenga na bakonzi ya mboka, bàzala na libateli mpo na banamboka banso, kozanga kotalela lingomba to mposo na bango, mpe bazali koloba ‘te mobulu moye mozali kokómela bato bya bitúlúká bisusu bikoki kotikala mpamba te na kozanga eyano.

Bazali kobundisa bandimi kino na liwa

Na nsuka ya sanza ya Febwali, bato ba Lingomba ya Ortodokse babundisamaki mbala mibale. Na mokolo mwa 26 ya sanza ya Febwali, bato ya mobulu babomaki bandimi to bakristu soki 20 mpe bakangaki ebele ya bato mpe babebisaki bilanga bya bango na Est-Arsi. Mikolo mibale na nsima, na mokolo mwa 28 ya sanza ya Febwali, bato motoba bakufaki mpe bato koleka ntuku mibale bazokaki na etumba moko mosalemaki na mandoki ya minene na monastele ya Aton Mariam na etúká ya Amhara.

Ut’o mibù miyiké, mobulu ezalaki kosalema mbala na mbala na etúká ya Oromia epai ya basivili. Bato mingi bakufaki na bitumba ndenge na ndenge, mingi kati na bango bazalaki bakristu, mpo na kowelana oyo ezalaki kati na bikólo, na makambo ya politiki mpe na mangomba ya boyambi.

Bomoko bwa Eklezia elongo nà mabota ma bato baye bazali na matanga

Baepiskopo balobi ‘te bazali na mawa mingi mpo na mabota ya bato bakufi mpe mpo na bato banso oyo bazwi mpasi na mobulu moye. Bazali kobyanga bandimi mpe bato ya motema malamu bàbondela mpo na kimya mpe kozongisa boyokani. Bakundweli ‘te mobulu ekoki te kozala eyano mpo na kosilisa matata ya bato mpe ya politiki. Bawayambo to baepiskopo balendisi mpe bakonzi ya Leta mpe bato banso oyo bazali kosala mosala na ekólo na bango ‘te básala elongo mpo na kozongisa kimya, kobatela bato, mpe kolendisa boyokani kati na bato.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

13 sánzá ya mísáto 2026, 19:13