Bénin: Mbano Cardinal Gantin esangisi bana na kobatela ezingelo
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Kotombola mpe kobakisa mayele ya bana na nzela ya mayemi oyo ezali komonisa mitungisi na bango na ntina ya makàmà ya ezingelo mpe ya nkita ya bato na biloko ya plastiki. Engebene na Mgr François Gnonhossou alobi ‘te yango nde mokano ya monene ya mbano international Cardinal Bernardin Gantin ya mobù 2026. Na yango, episkɔpɔ ya Dassa-Zoumé alobi ‘te Mbano eye ezali mpe libaku mpo na bana ya mibu 5 kino 18 oyo bazali kosangana na yango mpo na kotuna bakonzi mpe bato mpo na kolendisa misala ya kobatela zamba.
Engebene na Mamelo Chantal Adiko, secrétaire exécutif ya Fondation Cardinal Gantin, mobongisi ya momekano moye, ntina ya kopona bana mike ezali na likambo liye ya mayele, mpamba te: “Bana bazali bilenge biye bakozwa libulà ya mabélé ma biso maye mazali na likàmà, nsima mikolo mikoyà, lolenge Pàpa François alobaki na mokanda mwa ye Laudato Si'. Eloko lisusu, ezali ‘te: “na nzela ya bana, bakoki kozwa lisalisi lya baboti, bana nde bakoyeba koyebisa mpe kolamwisa bato baye basengeli kozwa mokano to kokata makambo, mpo bàzwa mikumba mya bango mpo na kobatela ekela (biloko biye Nzambe akelá”.
Momekano moye, mosali bokeseni tè, kasi mopesami mpo ya bana banso ya Mokili
Bana nkàmà misato na zomi na sambo (317) bawùtaki na Afrika, Eropa, Aziya mpe Etats-Unis bayanolaki na bosengà ya ba candidature mpo na mbano to Prix international Cardinal Bernardin Gantin oyo ebandaki na sanza ya Desembe ya mobu 2025. Esali bokeseni tè, ezali mpona Bana ba mokili mobimba, etali ekolo te, lokotà te, mposo ya nzoto te, mpe eponi bokili to nzoto ya mwasi to mobali te; elobi Mgr Gnonhossou, Mokambi ya Conseil ya administration ya Fondation. Bongo wayambo abakisi ‘te: “Malamu mpenza, mpamba te, Mbano yango etaleli mpe bana baye bazali na makoki ya kotambola te, baye bazali na mbeba. Nyonso mànà masalemi mpo na kopesa bana banso lotomo lolenge moko, ya kotiya maloba ma bango, mpo na kobatela ezingelo”.
Mozayiki ya mayemi oyo bato ba mayele bapesaki likanisi, emonisi makambo ndenge na ndenge oyo ezali kobebisa zamba mpe mayi. Ezala mpo mokili moye motondi na mpizoli, to ba kóba ya ma mayi oyo ba shasi to basaki ya plastiki ezali kokanga bango, to mpe mimbonda ya milinga ya baizini oyo ezali kofina kopema y abato. Sóló ezali mayemi manso ezali komonisa polele komitungisa ya bana bànà banso, elobi mamelo Adiko.
Na kati ya misàla tukù minei (40) bana basalaki, mpe baponaki, bazuzi oyo bakofanda na mokolo mwa 15 ya Aprili, bakopona zomi na mibale (12) oyo eleki malamu. Bongo, kati na yango, bakopono lisusu mayemi motobà (06) ya bana oyo bazali na mbeba mpe motobà (06) mosusu na kati ya bana oyo bazali na mbeba te. Sik’awa, bazali na etapi oyo, mwana moko na moko ya finaliste asengeli na nzela ya mosala na ye, kolakisa boyokani kati na mosala oyo esalemi malamu - eloko ya motuya mpo na Cardinal Gantin - mpe mabe ya bosoto ya plastiki na ezalela ya nzinga nzinga mpe bokolongono bwa nzoto, elakisi o bozindo mamelo Adiko. Nsima bakopesa mbano na bato zomi na mibale (12 prix) oyo bakozwa, o mokolo mwa 12 ya sanza ya Mayi, mokolo oyo ezali liboso ya aniversele ya mibù zomi na mwambe (18ans) ya liwa ya Cardinal Gantin.
Zoom mpo na Fondation Cardinal Bernardin Gantin
Abotamaki o mokolo mwa 8 ya sanza ya mayi ya mobù 1922, bongo akufaki o mokolo mwa 13 ya mayi ya mobù 2008. Cardinal Bernardin Gantin akomaki archeveki ya yambo ya Afrika, na Cotonou, na mobù 1960. Bakelaki ye episkopo wa lokumu na 1977, mokolo moko elongo na Cardinal Joseph Ratzinger oyo akómaki Pàpa Benoît XVI. Aponamaki na mokolo mwa 8 Aprili 1984 Prefet ya Congrégation ya ba Evêques mpe mokambi ya Commission pontificale mpo na Amérique latine. Na 1993, akomaki Doyen ya Collège ya ba Cardinaux, mosala oyo asalaki kino sanza ya Novembe ya mobù 2002, mbula oyo azongaki na Bénin, mboka ye abotamaki.
Na liwa lya ye na 2008, mbulamatari ya Bénin mpe Lisanga lya baepiskopo ya ya Bénin, basalaki (bakelaki) Fondation Cardinal Bernardin Gantin na mokano ya “kokumisa souvenir ya Cardinal Bernardin Gantin mpe kolendisa bokasi bwa elanga ya mosàlà manso”. Mamelo Adiko atangi, kati na misala ya lingomba, “kopalanganisa makanisi ma Cardinal mpe misala mya ye epai ya bilenge, kosunga bato baye bazali na likàmà mpe kobongisa mbano, to Prix international Cardinal Bernardin Gantin”. Mosalato bikela byango bizali kokoba na ntango oyo likita lya ba episkopo ya engumba ya Lazio, na etukà ya Roma, ezali komema na mokolo mwa 13 ya sanza ya Yannuali ya mobù 2025, projet ya kofungola mpó to ntina ya kokomisa ye Mwa-esengo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.