Luka

Bansango bya Bikela bya Ngambo ya Moniele ( L’Œuvre d’Orient) – 11 Màrsi 2026

Matanga ya Sàngó Pierre el Raï, nganga-Nzambe ya Maronite ya Qlaya, na dioseze ya Tyr, oyo babomaki na bombi ya Ba-Israel, esalemaki na mboka na yé Qlayaa.

Sàngó Pierre aboyaki kotika mboka na yé mpe bato ba Parwase ya yé atako likàmà ezalaki makasi mpe ba bwakaki mbela ya kotika mboka. Sima ya mwa ngonga, ba bomaki yé. Mokano mwa yé ezali kokamwisa to kotungisa bato mingi. Ezali mpe kokundola to kolakisa makambo ma nsómo oyo bato ba Liban ya sudi bazali koleka, mpo na kobakisama ya mobulu.

12 sánzá ya mísáto 2026, 11:24