Luka

Bansango bya Bikela bya Orient – 4 marsi 2026

Matata na Moyen-Orient: Makambo mazali koleka kuna

Mobulu mwa sika ezali koningisa mabele ma Moyen-Orient, na Iran, na Liban, na Iraq, na Mabele Mosantu (Terre Sainte). Mibulu minà mizali kobakisama nà mikakatano makasi mizalaki bobele, mpe ezali kobebisa to kolembisa makasi etukà yango.

Liban

Bato tuku mitano na mibale (52 personnes) bakufaki mpe bato nkamà moko na tuku mitano na minei bazokaki(154 blessés). Bato koleka nkoto tuku mitano na mwambe (58 000) bakimaki na sudi ya mboka mpo na kokende na Beyrouth, esika oyo wapi babundaka mbala na mbala na babombi. Bakangi ba eteyelo, kasi mangomba mingi ya bakristu bizali komilengele mpo na koyamba bato oyo bakimi bandako ba bango: Ba Filles de la Charité, association Libami mpe Kuvan ya bamamelo ya Saints-Coeurs bazali komibongisa mpo na koyamba bankama ya mabota na biteyelo ba bango, oyo etikali mpamba, wana bato baye bazoki bakozwa lisalisi na ba lopitalo na bango. Lopitalo ya Geitaoui ezali komilengela mpo na koyamba bato oyo bazikaki moto mpo na bitumba. Ekólo yango ezali kaka na mpasi, mpamba te matata ezali se kobakisama na kati ya ekólo.

Irak

Na engumba Erbil, bato bafandi mpenza na kati ya bandako na bango mpamba te basoda ya États-Unis bazalaki kobwaka babombi na bisika oyo bazalaki kokengela. Ata moto moko te akufi tee sik’awa, kasi bato balembi mpenza, bazali kobanga mpo na likama ya etumba mosusu. Na libongo ya Ninive mpe na kati ya mboka, ba incidents oyo etali ba miliciens oyo bazali na boyokani na Iran ezali kobakisa lisusu kobanga na likambo ya kozanga libateli.

Terre Sainte

Na Yeruzaleme mpe na Mokili Mosantu to Terre Sainte mobimba, bibongiseli ya bakristu mpe balopitalo bizali kokutana na bosenga ya bato mingi, kati na ezalela ya bobangi mpe ya kozanga koyeba. Makambo maye mizali kobakisama na mikakatano oyo ezalaki liboso, mpe ezali kobakisa lisusu makasi ezalela ya mpasi oyo ezali na etuka yango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

05 sánzá ya mísáto 2026, 11:13