Bansango biwùti na mosàla to Bikela bya Orient – 26 màrsi

Milulu mya Eleko ya Pasika na Mokili Mosantu ebebisami na mpó ya bitumba

Na mbul’oyo, bakristu ba Yeruzalema bakozanga lisusu molulu mwa mokolo mwa lomingo la Mbila to ya Mandalala, oyo eyebani mingi mpe esalemaka na Ngomba ya Olive.

Ezali nde Mokambi ya Lingomba ya Katoliko na Yéruzalema, Episkopo wa lokumu, Pierbattista Pizzaballa, na mokanda moko abimisaki o mokolo mwa 23 ya sanza ya màrsi.

Ezali likambo lya sika te, mpo na bitumba ezali kosalema, mpe likàmà ya ba bombi, bato ya mboka bakokaki te kosala mobembo na bango na eleko ya Karezimo, nà milulu o esika ya Saint-Sépulcre mpe na bisika bisantu bya Malozi to bwalé ya Yezu.

Kobanda mokolo mwa 28 ya sànzà ya Febuali, bisika biyiké ya minene bikangamaki, na ndakisa Saint-Sépulcre, Esplanade ya ba mosquées mpe bifelo to Mur ya Lamentations, mpo na kopekisa ba bosangani ya bat oba mobembo to bapèlerins.

Likambo mosusu oyo ebimaki na nsima, ezalaki ‘te misa mya Krisma o mokolo mwa Minei Mosantu ekosalema nsima soki likoki ezali, liboso ‘te eleko ya Pasika esila ; mokolo moyebani nayino té,

Atako mibeko miye mipekisi, bandako-nzambe ya dioseze etikali se polele. Basambeli to bakristu basengeli kokende kosangana na losambo, mingi mpenza na losambo la Rosario na mokolo mwa poso 28 ya sànzà ya màrsi, mpo na kosenga likabo lya kimya.

Patriarche alendisi mpe bato na bato ‘te bàyeba kosepela milulu miye na lolenge mosusu, o libota to o kati ya mboka, na elimo ya boyokani mpe ya elikya.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

26 sánzá ya mísáto 2026, 11:29