Luka

2026.02.25 Monaco voyage apostolique

Archeveki ya Monaco:: Boyei bwa Pàpa ekozala Ngrasya monene

Na lisoló na ye nà bapanzi-sango ya Vatikan, Mgr Dominique-Marie David andimi ‘te makambo ma molimo ya mboka ena ya moke ezali na bokasi mingi te, mpamba te bato bàzali na nkita, bàlingi mbala mingi kozala bango moko. Ezali mpenza mwa «kwokoso ya koyeba ntina ya bomoi». Mobembo ya bontomà ya Léon XIV ekozala libaku lya koloba na «mokili mobimba », na nzela bokonzo boye, bozali na bikolo ndenge na ndenge na motuya ya ba lokotà koleka 150.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Moko na makambo maye makamwisaki Mgr Dominique-Marie David, oyo akómaki episkopo-mokonzi ya Monaco, eleki boye ba mbula motoba, ezali ‘te : «na ekólo eye ya moke, oyo ezali kaka na bakilometele-kare mibale, makambo ndenge na ndenge ezali kosalema esika moko. Bato ba bikolo pene na nkàmà moko na tuku mitano (150) bazali kofanda na Monaco. tokoki koloba ‘te mokili mobimba mozali na esika oyo ya moke. Mbala mingi, bato bamonaka Principauté lokola engumba moko ya kitoko». Alimboli kati na lisoló na ye na bapanzi-nsango ya Vatikan ‘te: “bomengo ya mwa ekolo eye, ewuti na bokeseni bya bisika biye bautaki mpe na bosàngani o kati ya bato”. Bato bayiké basalaka na Monaco, kasi bafandaka kuna te”. Archeveki ya Monaco andimi ‘te mpo na Pàpa, kokende na mboka eye ya moke boye, ekoki kozala na ntina monene: mpamba te, soki totali o bozindo, azali koloba na mokili mobimba. Mosala mwa ye mozali ya komema nsango Elamu, kokolisa bondimi mpe kopalanganisa nsango ya kimya mpe ya lokumu ya moto. Na yango, ekoki kozala ‘te nsango ya boyei bwa yé elekaki ndelo ya mwa ekólo na biso eye ya moke.

Na motuna batunaki yé mpo ya koyeba mwa bilembo ya kibobólà oyo ebatamà na ekolo eye emonanaka lokola elembo ya nkità; mpe koyeba soki ezali nà mwa mikakatano na boyokani kati na bato, bomoi na molimo, to na ezalela ya bato, ayanoli ‘te: bilembo ya kibobólà ezali mpe ezali o bozindo. Ye moko amoni yango na mibù miye mileki, tango balakisaki ye, elongi mosusu ya Monaco oyo Media elekisaka na bilili. Bozangi ya biloko ezali makasi, kasi ezali ya kobombama, mpe ezali mpasi mp ona komona yango. Bato bayiké basàlàka na Monaco, kasi bafandaka kuna tè, mpamba te, bisika ya kolala ezali te, mpe bomoi boleki ntalo mpenza. Ba forme ya kibobólà mosusu ezali: Ezalela ya komiyoka ‘te ozali yo moko (solitude) mpe kozanga koyeba ntina ya bomoi. Ntango moto azali na mwa bomengo mpe azali na mitungisi mingi te na bomoi bwa ye, mpo na biloko ya mokili, mituna misusu ebimaka: Wapi ntina ya bomoi bwa ye? Ezali likambo ya kokamwa te, kokutana na bato baye bazali konyokwama na ezalela ya komiyoka ‘te ozali yo moko. Tozali komono mpe baboti oyo bazali na makoki te mpo na kobókólo bana ba bango, kokabwana ya mabala mpe makàmà na mabota mazali kosala mpasi mingi koleka, mpamba te bomoi ezali komonana na polele ’te ezali petee. Yango wana, mosala to mokumba mwa biso ezali ya kofungola miso na bobóla oyo ebombami ; ya ko banza mpo na basusu, mpe ya koyeba kokundola makambo ma mpasi, oyo, atako emonanaka ntango nyonso te, kasi, ezali ya solo mpe mbala mosusu ya mpasi mingi mpenza.

Na motunà batunàki ye lisusu mpo na koyeba soki lolenge eklezya ezali koyeba mpe kotalela kibobóla, ezali kobongola eloko, ayanoli boye : Likambo lya esengo, ezali ‘te, bato mingi bazali na bomoko to bondeko. Na Monaco, ba organisation ya makasi ezali kosala, lokola Caritas Monaco, Société ya Saint-Vincent-de-Paul, Légion de Marie, mpe ba organisation mingi ya lingomba to ya bato oyo bazali kobatela bana bazali na mikakatano, mabota oyo ezali na mikakatano, mibange mpe bato ya maladi. Likambo lyango ezali mpe komonana na misala mya Eklezya. Likanisi ezali ya kobanza mpo na basusu mpe ya kosuka kaka te na kofanda na mboka oyo ezali na bomoi ya malamu mpe na mwa libateli. Mosàla to mokumba mwa biso eklezya, awa na Monaco, ezali ya kotya likebi mingi koleka epai ya bato mpe kozanga te libaku nyonso ya kopesa litatoli ya Nsango Elamu epai ya baoyo bazali na bosénga.

Basalaki ye mitùnà ndenge na ndenge, bongo na nsuka batunaki ye, soki alingi koloba na bokusé, etinda ya eklezya na bokonzi ya Monaco na elilingi moko kaka, akopono eloko nini? Ayanolaki ‘te, Azalaki kokanisa na bililingi bibale ya Evanzile. Ya yambo ezali oyo ya mpatà ebùngami :kolamusa makasi ya basàngó, ya bakristu, ya balayiki, ba parwasi nà ba muvema mpo te Nsango Elamu ekoka kokóma ata epai ya baoyo bazali komonana lokola bazali mosika to baoyo bakoki kozala na elikya te. Ya mibale ezali, lisolo ya Zakéo. Yezu aponaki kokóta na ndako ya moto moko moye azalaki na lokumu mingi te, atako azalaki na bozwi mpe ayebanaki mingi. Asalakà yango bobele mpo na komonisa ye kitoko mpe esengo ya Nsango Elamu. Na nzela ya baninga ba ye ya pembeni. Yezu amonisaki ‘te Bokonzi bwa Nzambe ezalaki mpenza kati na bomoi mpe kati na motema mwa ye. Na yango, akanisi ‘te Boyei bwa Pápa bokozala mpenza lipamboli to bobenini bonene.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

24 sánzá ya mísáto 2026, 17:38