Luka

Sàngo Nandou: “Bomoi bwa bomibonza, elembo ya elikya mpo na Afrika”

Na libakù lya mokolo mwa mokili mobimba ya bamibonzà ya mbala ya tukù misato (30è), oyo basepelaka o mokolo mwa mibale (2) ya Fabwali, Sàngà Clément Nandou, moko ya Dikastere ya Instituts ya vie consacrée mpe ba societes ya vie apostoliki, azolngelaki ntina makasi lya mokolo monà mp ona Eklezya mpe mp ona Afrika. Kati ya bopesi matondi, mikakatano ya mikolo miye mpe mbela na bilenge, abetaki nsete na likambo lya komibonza ontei ya makambo ma Afrika.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Basepelaka mokolo mwa mokili mobimba ya bamibonzà o mokolo mwa 2 Febwali ya mbula na mbula, mokolo moye Mwana Yezu abonzamaki o tempelo, ut’o Santu Jean-Paul II abandisaki likanisi linà na mobù 1997. Engebene na Sango Clement Nandou, mokolo moye, mozali mokolo makasi na molimo. Mpamba te, “ezali kolimbola mwa tango ya kotondo Nzambe botondi mp ona likabo lya libyangi to vokation ya basi mpe babali balandi Kristu na pembeni mpenza. Ezali mpo ya komipesa bomoi bwa bango mobimba na Nzambe, na nzela ya conseils évangéliques ya bongondo (chasteté), ya kibobolà (pauvreté) mpe ya botosi (obéissance)”.

Mokolo yango ezali mpe na ntina ya kobyanga bato na losambo: “tembe te ezali libakù lya kosepela bomipesi ya bamibonzà mp ona etindà ya Eklezya. Nde mokolo monà, bakosambela mpo ya bango, mpe bakosambela mpo ya mabyangi to vokation ya sika, oyo ekoyà nsima”.

Bomoi ya bomibonzà
Bomoi ya bomibonzà   (@Vatican Media)

Boko bomibonza na nzela ya oyo esakolami

Na mabele to mpe mikili mya Afrika, oyo ezali na bakokoso ebele, bomoi ya komibonza, ezali na motuya mpenza. “Ntina ya mokolo mwa mokili mobimba mpo ya bamibonzà na mikili ya Afrika o moyi mwa lelo, ezali kotinda na lolenge ya kotalela ezalela” to mpe ezali lolenge ya kokanisa na ntina ya esakweli ya bomipesi, na kokangema na Kristu, na mosala ya kosakola Nsango Elamu na kati ya bato baye mbala mingi bazwami na mikakatano ndenge na ndenge”. Na yango, kotikala na lobokó na Klisto ezali kopesa litatoli ya elikya epai na bato oyo bazali konyokwama na mikakatano ya nkita, ya bomoi ya bato, mpe ya libateli.

Bolenge, Etindà, Elikya: Bisengo binene ya bomoi bwa bamibonzà na Afrika

Atako mikakatano ezali, Tata Nandou amonisi ntina ya kosepela

Esengo enene ya bomoi ya bamibonzà na Afrika ezwami na ba vocations ya bilenge oyo bazali makasi, mpamba te bazali na nguya ya solo mpo na etindà ya Eklezia o mosala ya basali na Nzambe.

Bisengo bina, bizali komonana na misala mya mokolo na mokolo ya bamibonzà na «nzela misala ya mateya, ya bokolongono bwa nzoto, ya kotombola bosembo mpe ya kimya, oyo ezali motuya ya Nsango Elamu». Mpo na ba Sàngó ya Lingomba ya Santu Augustin, ebele ya ba vocations ezali yango moko elembo ya elikya mpe ya boyambi na bomoi. Bato baye bamipesi na Nzambe bakómaka bilembo bya elikya, ya kimya mpe ya bosembo to boyengebene.

Mokolo mwa Mokili Mobimba ya bamibonza
Mokolo mwa Mokili Mobimba ya bamibonza

Mikakatano ndenge na ndenge: oyo etali makambo mya politiki, etali bato, mpe bomoto.

Nzokande, bomoi ya bomibonzà na Afrika ezali mpe na mikakatano na yango. Sàngó Clément Nandou alobi ‘te ezali na mabakù ya mitindo mingi. Na makambo ya nkita mpe ya politiki, «Bitumba ya mandoki ebimisi bozangi kimya mpe kibobola, mpe yango ezali kosala ‘te mosala to etindà ya bamibonzà ezala mpasi». Na nivo ya lingomba, mikakatano ezali na ntina ya bokambi mpe bomoi ya bandeko.

Kozala na bokonzi eyebani nayino malamu te ‘te nionso ezali lokola mosala, kasi mbala mosusu lokola libaku ya kozwa bomengo. Lisusu, ezali mpasi mpo na koyangela na lolenge ya ba-synode mpe ya ba collèges, mpe bokabwani o kati ya lingomba mpo na mimeseno ya mboka to ya bitúká.

Na nsuka, ezali basali motuna ya bomoto: «Ndenge nini kobatela bokeseni kati na makambo ya mobókó ya bomoi bonà mpe masengami ya mimeseno mya bonkóko ya Afrika

Mbela na bilenge bya Afrika, basengeli kobanga te

Sàngó Nandou alendisi bilenge bya Afrika, bàbanga té, bazala na bososoli na libyangi lya bango, mpo ba yanola nà esengo o mitema mya bango, nzoka nde bàzala na bobangi te liboso lya mbela ya Nzambe, mbele batikala sembo to na lobókó na mokano bazwaki, na misala mya bango mpamba te eklezia ezali na mposa ya bango makasi, mpo na kosakola Nsango Elamu ya bokonzi mpo na nkembo ya Nzambe mpe libiki lya mokili.

Na yango, azongelaki maloba Pápa Léon XIV alobelaki bilenge na tango ya Zubilee ya bango: «Bóluka makambo minene, mbele na bosantu, ata esika soko wapi  bozali. Bósepela na bondambo bozali na yango te. Sé bongo, mokolo na mokolo bokomona mwinda mwa Nsango Elamu ezali kokola kati na bino mpe zongazonga na bino. (Pápa Léon XIV, Homélie, Yubile ya Bilenge, 3 Agústi 2025).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

02 sánzá ya míbalé 2026, 21:35