2026.02.10 Bikeke mibale ya Mibeko mpe bizaleli ya ba Missionnaires Oblats 2026.02.10 Bikeke mibale ya Mibeko mpe bizaleli ya ba Missionnaires Oblats  

RDC : Bikeke mibale ya Mibeko mpe bizaleli ya ba Missionnaires Oblats

Milulu mya Ukaristya ya Bikeke ibale mileki, ya Mibeko mpe bizaleli ya Lingomba lya ba Missionnaires Oblats, ebandaki o mokolo mwa 08 Febwali, na Parrwase Santu Charles Lwanga, na enguma Idiofa, na etukà ya Kwilu na RD Congo. Mgr José Koko, episkopo ya Dioseze ya Idiofa akambaki misa elongo nà Episkopo ya Kikwit, nà mpe monkama ya ba Sàngó ya Lingomba lina mpe nà ba Nganga-Nzambe ya badiosezeeye mibale, Idiofa mpe Kikwit.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Episkopo ya Idiofá atondoki botóndi ba bamisionnaires Oblats, oyo bayaki na 1931 mpo na kotombola ba jésuites oyo babandaki na 1922 na Ipamu, mosala ya kopalinginya Nsango Elamu na eteni ya Kwango. «Bino bozali batata ba biso», “Bóbwakisa biso te”, elobaki Wa-yambo, na mongongo ya mwana oyo azali kobelela tata wa ye. Mgr Joseph Moko asengaki ba Oblats batikala na lobokó na mibeko mpe baezalela ya lingomba lya bango.

Bàlanda mosala mwa bakambi ba bango, bàteyaki Nsango Elamu o bamboka ya zamba. Bàlanda maloba ma bango mpe charisme oyo eutaki na mobandisi wa bango, Saint Eugène de Mazenod. Lingomba lya ba Oblats endimamaki na mokolo mwa 17 Febwali ya mobù 1826 tango Pápa Léon XII andimaki mibeko, Abbé Eugène ya Mazenod abimisaki. Mpo ya lingomba. Mgr Moko abyangi bango basangana elongo na yé, mpo na mosala ya kokela ba Parwase ya sika. Mpo na yango, aponaki Sàngó Joseph Ntumba, mokambi yak ala ya ba Oblats lokola Molandi ya episkopo mpo na mosàlà monà.  

Mgr José Moko, Episkopo ya Idiofa
Mgr José Moko, Episkopo ya Idiofa

Eloko soki moko te ekozala lisusu lokola na kala

Mpo na mokambi ya etuka ya Congo, Sàngó Constant Kienge-Kienge, milulu mya mibu nkama mibale ya mibeko mpe baezalela ya ba Oblats (constitutionset Règles des Oblats) ezali kopesa bango banso libaku lya “kozongela sika” na charisme na bango. Engebene na yé, “eloko soko moko te ekozala lisusu lokolaezalaki na kala”.

Apesaki melesi na ba Episkopo ibale, mpo na bokangemi na bango na lingomba ya Saint-Suplice. Mpamba tè,Ba-Supliciens de batangisaki Santu Eugène Mazenod ; bakolisaki ye na mateya ma molimo, oyo ba Oblats banso bazali kolandela lelomei. Likanisi lyango emonisami polele na mikanda mya Leta mpe na mibeko miye elenge sango ya France abimisaki.

Sàngó Kienge-Kienge akundolaki bango bosenga ya mobandisi mwa bango oyo alingaki ‘te bana ba yé bazala “bato ba Eklezya”, elingi kolimbola ‘te basengeli kozala na mosàla mwa episkopo, bisika bazwami. Lokola bazali kotosa na bosenga ya ba dioseze biye babale ya Idiofa mpe Kikwit, Mokambi ya ba Oblats akitisaki ba episkopo yango motema, mpe alobaki ‘te, bakolongwaka soki moke te na badioseze eye.

Nzoka nde amonisaki mpe mposa ya bango ya kosenge ‘te, baepiskopo biye babale, batikela bango mpo ya seko, ba Parwase ya Saint-Charles-Lwanga na Idiofa, Notre-Dame-du-Rosaire na Kikwit, mpe Cœur-Immaculé-de-Marie ya Ifwanzondo. Parwase oyo ya nsuka, ezali lokola maternité ya bango, mpamba te, ezali Noviciat, esika epai wapi ba oblats banso ya RDCongo, na Dioseze ya Idiofa, bazali kobotama.

Baoblats bakaboli etindà ya bango elongo nà balayiki

Na kosukisa, mokonzi ya etuka apesaki matondi na banganga-Nzambe, basàngó, mpe bamibonzà, mpo na boyokani bwa bango. Kasi mpe na balayiki oyo bazali kosangana na ba Oblats mpo na kokabola charisme to etinda ya lisanga mpe kosunga mpo na kopalinginya Nsango Elamu epai ya babóla. Basangani ya lingomba, basangani ya “Association Missionnaire ya Marie Immaculée”, mibali mpe basi, oyo bautaki na RDC mpe Angola, basanganaki na milulu mya mibu nkamà mibale na dioseze mpe engumba ya Idiofa.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

11 sánzá ya míbalé 2026, 13:31