2026.02.05 Bokutani bwa Papa Leone XIV na Micheline Mwendike Kamate, o mokolo mwa 31.01.2026 2026.02.05 Bokutani bwa Papa Leone XIV na Micheline Mwendike Kamate, o mokolo mwa 31.01.2026   (@Vatican Media)

Micheline Kamate: “Bitumba esila kopesa bonsomi na moto soki moko te”

Mobandisi – Moninga ya muvema citoyen LUCHA, Micheline Kamate Mwendike akutanaki na Pape Léon XIV na nsuka ya sanza ya Yanuali mpe apesaki ye buku na ye “La guerre a échoué”. Na lisoló na ye na bapanzi nsango ya Vatikan, mobundi mwasi ya Congo oyo amonaki bitumba na Goma na bomwana na ye, alobeli ndenge mayele ya basoda elongi te na mokakatano mwa bokengi oyo ezali na Esti ya RD Congo. Abeti nsete na bosenga ya kimya ekoùmela mpo ya libela, oyo kaka bango moko nde bakoki kotya.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ezali kaka litatoli te, buku Micheline Kamate apesaki na Papa, “Etumba elongi te”, ezali kolimbola mpasi mpe mpiko to molende oyo esalelami. “Na zali kobete lisapo lya bitumba na kutanaka na yango na bomwana… kasi nazali kobeta mingi mpenza lisolo lya bolingo ya libota la ngai oyo ebatelaki ngai na makamà mingi ya nsomo”.

O kati ya buku eye, akomi nayino mpo ya bato ya Congo, azali kolobela yango nà kondima makasi ‘te etumba ezali, ezali elonga te kasi kopola.

“Etumba esalemaka te mpo ya bosikoli to mpo ya bonsomi. Etumba etikala kokolisa nayino mboka moko te. Etumba nyonso ebebisaka bomoto ya bato. Ezali kokangisa biso kati na zolongano ya mobulu oyo kati na yango moto nyonso azali kobungisama”

Goma, engumba oyo ezoki mpota kasi etikali ya kotelema

O kati lya litatoli lya yé, engumba ya Goma ezali na esika ya liboso. Alobeli lolenge ba bombi ekweyaki pene pene ya ndako ya bando, nà mpe lolenge bomoi bozali kokoba atako nyonso. Mpo na ye, Goma ezali elembo ya makasi ya bomoto. “Ezali engumba oyo etondi na bampota, etondi na makanisi ya koyinana. Kasi, na Goma, bolingo ezali: tozali kokabola mayi, tozali kokabola bilei, tozali koseka, tozali koyemba, tozali kobina. Etumba elongi mpe te, mpampa te bato baye bazali kobunda bazali koboya kobungisa bomoto bya bango”.

Micheline Kamate Mwendike, Mobandisi – Moninga ya muvema citoyen LUCHA.

Mokano mwa basoda elongaki te

Mpo na oyo etali bokengi na etuka ya Esti ya Congo, moto moye alukaka bolamu ya bana mboka alobi ‘te nzela ya basoda elakisaki kopola ya bango.

Lelomei, mayele ma basoda elongi te, mpamba te monopole ya mobulu ezali lisusu na maboko ya basoda ya ekólo te. Bituluku ya basodá bizali se kobakisama mpo na bantina ya bikolo to bankotà ya bango, to ya politiki, bongo, ezali nde basivili bato bazali kozwa mpasi, bazali na kimya te.

Alobeli mingi mpenza likambo lya bozangi bokasi mpe makoki ya basodà na kobatela bato mpe nà mindelo ya mboka. Alobaki ‘te, “Soki babotoli Goma lelo, ezali mpo mapinga ya basodà bayebaki kokengele mindelo ya mboka”. Bongo mpo na maye matali batomboki oyo bazali kobundisa na ngambo ya mbulamatari, ba Wazalendo, Micheline Kamate alobi ‘te: kopesa minduki na basivili kozanga kolanda mibeko ya mosala ya soda, ezali kaka kobakisa mabe. “Soki opesi moto mondoki, ekoki kobalukela moto nionso”.

Kobongola bozangi bokengi na elónga ya bana mboka

Engebene na Micheline Kamate, bomengo bya solo ya Congo ezali bato na yango, mpe mingimingi bilenge na yango. “Moto nyonso ya Congo asengeli kopesa oyo ya yé eleki malamu mpo na kotonga mboka. Tokitaki mpenza na nse”.

Okati ya LUCHA, mosala ya bomipesi ezali koleka na nzela ya kotangisa bato na bosembo to boyengebene ya mboka, na kopesa mboka lokumu mpe na koboya mobulu. «Ezali mabe komono ‘te na engumba moko, bato basusu bázala na mai ya komela mpe na lotiliki, kasi basusu bázala na eloko te. Esengeli tóbóya kanyaka mpe tóyeba kokundola esika ezangi bosembo, mpo na tóyanola na yango na bozangi mobulu», alobi, mpe abakisi ‘te : mobulungano ya bana mboka esili kobota mbuma na yango.

Mabanga ma ntalo nde ezali kopelisa móto ya bitumba

Mpo na Micheline Kamate, likambo la bomengo to nkita ya mabanga mantalo nde ezali o kati kati ya bozangi bokengi to ya kwokoso na Esti ya mboka. Azali na mawa mpamba te, bisika ya Rubaya na Territoire ya Masisi oyo ezali kobimisa ndambo monene ya coltan na mokili mobimba, ezali kofuta mbongo mingi mpo na bitumba koleka mpo na kimya. . Mpo na ye, kozanga kopesa eyano ya makasi yambulamatari to Leta ya Congo, liboso ya bobomi ya biloko ezali mpe kobakisa mabe na likambo lyango.  “Mingi kati na mabanga ma ntalo mazali koleka na Rwanda mpo na kokende na mikili misusu. Mobulu ekómi lokola momeseno, manso ezali malamu, na yango, bitumba yango moko ezali komifutela.

Balkanisation esili kobanda

Mpo na ye, bilembo ya kokabola mboka to balkanisation esili emonani polele. Congo ekabwani lelo kati na baguvernema mibale, ba systeme mibale, ba réalités mibale... Banque ekangami, espace aérien ekangami, ba systeme éducatif mpe administratif ekabwani: bokabwani ezali o bozindo.

Kasi alobeli mpe mposa ya Ba-Congo na kotikala bomoko na mboka: Bato bazali komimona na bitumba ya Lumumba mpo na bomoko ya Congo. Bokabwani boye, ezali likambo ya mbalakaka te, kasi eloko bazali kotindika biso na kosala yango na makasi. Mpe alobi na mpiko nyonso ‘te: “Tólingi ekólo ya biso ezala na bomoko. Congo ekotikala moko mpe ekoki kokabwama te”.

““Tólingi ekólo ya biso ezala na bomoko. Congo ekotikala moko mpe ekoki kokabwama te”.”

Mbela na Bilenge bya Afrika

Micheline Kamate asengi na bilenge ya Congo mpe ya Mabele ma Afrika, “bákima misala minso mya mobulu, botomboki binso” mpo ‘te bitumba, alendisi ye, ememaka esika moko te mpe ezali kozongisa nsima mpo na bokóli, demokrasi mpe bibongiseli.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

10 sánzá ya míbalé 2026, 10:51