2024.12.09 2024 10 Likita lya ba Volontaires ya Karitas Jérusalem 2024.12.09 2024 10 Likita lya ba Volontaires ya Karitas Jérusalem 

Mibeko milimbolami malamu mpo ya Karitas Jérusalem oyo ekoki kozongela misala mya yango.

Equipe interministérielle ya Israël elongoli misala minso mya bokomisi na mikanda ya lisanga ya dioseze oyo ezali kosala na Terre Sainte, epai wapi mitinda mpo na bokomisi ya bibongiseli (organisations) mpe kopesa ndingisa na basali na yango ya bapaya, oyo etali eleko ya transition, ekosalelama te.

Bansango ya Vatikan

 

Caritas Jérusalem esakoli ‘te ezwi mokanda moùti na ba ministres ya Israël mpo na kolimbola polele lolenge ya mibeko mpe ya misala na yango. Nsima ya kotalela lisusu likambo lyango, bakonzi ba Leta bamoni ‘te, na boùmeli ya eleko ya transition, malako mya mibeko mpo na kokomisa bibongiseli (les organisations) na mikanda mpe kopesa makanisi mpo na basali ya bampaya, ekokokisama te mpo na Caritas Jérusalem.

Ata lolenge moko te ya kolandela mpo na kokomisa lisusu

Liyebisi lyango elongolaki mpe masolo manso ya kala oyo esalemaki na likambo lyango mpe endimisaki ‘te komite ya baministre ekotinda lisusu nkombo ya lisangá yango te, mpe yango esukisaki makambo manso ya mobulu oyo ezalaki na kati ya ebongiseli ya Leta. Caritas Jérusalem asepeli na mokano to ekateli eye mpe apesi matóndi na bato banso bàpesaki makabo ma bango na mitindo mikeseni. Ndimbola eye ya ntina mingi, epesi nzela na OMS ‘te ekende liboso nà mosala mwa yango mpo na kosunga bato baye bazali na likama koleka, na kimya nyonso, na tango oyo bato bazali na mpasi makasi mpe oyo eumeli mingi.

Maloba ma Leta

Caritas Jérusalem endimi ‘te bazwi mokanda ya Leta oyo emonisi ‘te bakoti to bamikomisi na ebongiseli yango. Na sima ya kotalela lisusu, équipe interministérielle ya Israël emonaki ‘te mibeko mya mibeko mpo na kokomisa ba organisations na mikanda mpe kopesa makanisi mpo na basali na bango ya bampaya, etali eleko ya transition, etali Karitas Jérusalem te. Na mokanda mwango, balobaki mpe ‘te mikanda minso bàtindelaki bango liboso mpo na likambo yango ezalaki na ntina te. Mokanda yango elimbolaki malamu ezalela ya Karitas Jérusalem mpe emonisaki ‘te esengeli te kosala lisusu misala misusu ya kokomisa nkombo na Comite interministériel.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

11 sánzá ya míbalé 2026, 14:01