Eklezya ya Brésil pembeni ya bato bazwi likàmà na mpela na Minas Gerais
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Ba mpela ebeti mikolo miye miùti koleka na etukà ya Brezil na Minas Gerais, ezali moko ya bingumba ezwami n abato ébélé. Mingi ya ba industries ya ekolo ezali mpe kuna. Mpela ena esali motango mwa tukù motoba ya bato bakufi (64 morts), bato mitano ba bungaki mpe pene ya bato nkoto mine balungwe bandako ba bango. Motango moye mopesami na na kotalela bilan ya ebandeli ya mokolo mwa mitano mwa 27 ya sànzà Febwàli. B ambula ya makasi ezindisi ba kartié mibimba ya Juiz ya Fora,Matias Barbosa mpe Uba, ebebisi mpe bandako bayiké. Lisali liyaki na ba empompa mpe n abato ya protectiok sivile mpo na kosunga, ekoki kokokisama te, mpamba te, ekangami mpo na likàmà lya mayi mpe mbula, oyo, ezali kokóba kobeta. Kaka na Febwali, ba precipitation ya mbula ezali kolandana na kobeta, esali motango ekomi tee na nivo ya 733 millimetele tó 400% ya bambula eleka na lisapo lya mokili. Eteyelo ya Meteo ya Brezil ezali kokebisa lisusu bato, mpamba te, bambula misusu ya makasi ezali kopusana na etuka. Balobi ‘te ekozala nà likàmà ya bobukani ya mabele lisusu. Mingi y abato baye bazwaki likàmà, bazali na Juiz ya Fora, epai wapi bakonzi balobelaki liwà lya bato tuku mitano na mwambe, mpe kobungisama ya bato misato. Bawei basusu motoba (6) mpe baye babungi mibale, baùtaki na Ubà.
Eklezya ezali Pene
Eklezya katoliko ya Brezil, ezelaki tè kasi etelemaki mp ona komema lisungi mpe kolendisa baye bazwaki likàmà. Lisanga lya baepiskopo (Cnbb), elakisaki bondeko bwa bang ona mangomba. Ba byangi ba Diosezez ya mikili minso baningana mp ona kosàla ba nsinsani ya bondeko. Na lisalisi lya ba rezo ya Caritasi ya Brezil, basilaki kokabola bilei, mayi ya peto, ba kit ya bopeto, mpe ba bulangeti. Banganga-Nzambe mpe ba benevole, bazali kosala sikawa elongo nà protection sivili, mpo na kolekisa lisalisi mpe komema lisungi lya molimona bato bazwi nsomo ya kobungisa bandako babango to boko ya balibotà lya bango. Baepiskopo ya Brésil bamonisaki mpe ntina oyo mayi ezali kotonda na Brésil: kokata bazamba, kotongama ya bingumba na mobulu, kozanga bibongiseli ya malamu mpo na kotonga bandako. Na maloba ma bango mingi, balobaki ‘te esengeli kotya mbongo mingi mpo na komibatela, kobongisa mabelé mpe kobatela ezingelo, mpo ‘te makama ma ndenge wana misalema mingi te na mikolo mizali koyà.
Archidioseze ya Juiz ya Fora emonisaki bomoko na bango na bato baye bazwi likàmà mpe esengaki na bandimi ‘te básangana mpo na kopesa lisungi. Nazali kotuna na banganga-nzambe banso, nà ba diakoni, nà balayiki banso mpe na basi banso nà babali. Mgr Gil Antônio Moreira, alobi “mpo na kosangana na mosala monene ya bondeko, na kosalela boyambi, elikia mpe bolingo mpo na bato oyo bazali konyokwama mingi, mpe na lisanga monene ya mabondeli ya molende”.
Eyano ya mangomba ya bamboka
Likanisi liye lizali mpo na kotombola mobulungano na archidiocèse mobimba, mingimingi na bituka biye bizali na likama mingi mpe na bituka biye bizalaki na makama ya mpela mpe ya koningana ya mabele. Mpela na etúká ya Minas Gerais ezali kaka te likambo lya mbula makasi, kasi ezali mpe mokakatano mpo na bato mpe mpo na bizaleli malamu. Lolenge liye bato ba mboka yango mpe lingomba ya Brézil basalaki tango mayi ya mbu etombokaki, emonisi ‘te atako bato bazalaki na likàmà, bazalaki mpe na makasi ya kobika. Na yoko mboka monene mpe ya mindondo lokola Brézil, Eklezya ezali kokoba kosala mosala monene na kati ya mboka, ezali kopesa lisungi lya solo mpe ezali kolendisa elikya ya kotonga mboka na lolenge bato banso bakoki kosangana. Luiz Inácio Lula da Silva, mokambi ya ekolo, amonisaki boyokani na ye na bato oyo bakufaki mpe na mabota ma bango mpe apesaki mitindo ‘te mbulamatari fédéral esala na lombango mpo na kosunga bato baye bazwi likama.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.