Bukuru Claude aboyi mombongo ya bato, elongwe ye na mozwi-likàma akomi nzeneneke.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Manso mobandaki, nsima tango asilisaki kelasi ya yé na eteyelo ya likolo na Burundi. Nzokande Bukuru Claude azangi mosala lokola baninga ya mboka ya yé. Mposa ya kosalisa baboti ba yé ezalaki makasi. Kutu azalaki koloba yango ‘te : «Nakutanaki na makambo maye elembisaki ngai, mitungisi ya bato, mpe mposa makasi ya kosalisa libota la ngai». Se bongo, o kati ya likambo liye ye bobola mpe motungisi to ya ezalela ya bolembu nde ba recruteurs ya lokuta bayàki koluka ye. Alobaki ‘te: “Balakaki ngai mabaku ya mosala na mikili misusu, na mikili lokola Koweït, Liban to Dubaï, na lifuti ya kitoko mpe bomoi ya malamu”. Kasi ayebaki te lokuta ya ezalela ya bato basalaka mombongo nà bato, bongo andimelaki bango. Na nsima atatoli yango ‘te: afutelaki ekateli na ye yango nà mbongo mingi mpe bambula ebele ya bomoi na ngaimei; nakanisaki ‘te nazalaki kosala yango mpo na lobi (avenire) ya bomoi bwa ngai.
Yoko mobembo ebalukaki na motambu
Mobembo ebandaki na Burundi mpe elekaki na Kenya. Elakisaki lokola ‘te ezalaki kaka mwa esika ya kopema yambo ‘te tokende na mikili ya Golfe. Kasi na mbalakaka, makambu ebalukaki; “Kaka tango tokomo,kobanda mokolo mwa liboso, moto oyo amemaki biso na mikili ya Golfe, abotolaki ba passeports mpe mikanda mya biso nyonso. Atikaki biso na mwa ekuke moke, kuna tozalaki elongo bato tuku mibale na moko”. Ezalaki mpasi mingi mpo na bomoi bwa biso. “Mpo na maye matali kolia, mabota mabiso nde bazalaki kosalisa biso, ut’o Burindi. Tozalaki kolia mbala moko mpo na mikolo misato». Nzoka nde Bukuru azalaki nayino komono nsomo ya likambo yango te, alobi solo ‘te; “na tango wana, na yebaki nayino te ‘te na kweyaki na likamà ya mombongo ya bato. Kasi amiyebelaki kaka ‘te, ezalaki nà mwa kwokoso. Bongo azalaki kokanisa ontei ya ye ‘te, atandélé, bakomema bango esika balakaki bango”.
Ezali Talitha Kum-Kenya ndé ebikisaki biso
Makamwisi ma Nzambe esalemaka, mpe Bukuru ayei kokutana nà moninga ya ye ya kelasi, oyo akomaki nganganzambe na Kenya. Ayebisaki yé aloba akambo azalaki koleka mpe atiya yango na nkomà, mpamba tè azalaki moko ya batoo baye bazwaki likàmà ya mombongo y abato (la traite humaine). Na lisalisi lya moninga wa yé, likambo linà likomaki na Talitha-Kum Kenya, oyo nde abikisaki bango. Alobi ‘te, “na lisalisi lya mamelo moko azalaki kosala na Algerie, akomaki maye manso elekelaki ye; solo mpenza konyokolo bato”.
Mbongwana ya Mpasi na Bomipesi
Na moyi mwa lelo, Bukuru Claude amipesi na mosala ya kobundisa ezalela ya konyokolo bato mp ona likanisi lya mbongo. Apesi bantina misato oyo etindaki ye amipesa na mosala ya kolónga mombongo ya bato: Yambo ezali mpo ya kopesa ndimbola na makambo maye na kutanaki na yango; ya mibale koyebisa mpe kokebisa bilenge oyo bazali na motungisi ya kibóbóla mpe bozangi mosala lokola ye, bakweya na mbeba tè. Na nsuka, mpo ya ntina ya kozwa mokumba ya bizaleli malamu: “Lokola namonaki lolenge mombongo ya bato ezali kosalema, nakokaki kokanga monoko te, noki tè, motema mwa ngai motondaki na mayoki lokola te nasanganaki na sekele ya bango”. Elongo na bilenge basusu, Bukuru azwi mokumba ya koyebisa bato, maye matali lolenge ya sika ya kobende bato mpe kosala na bango mombongo. Alobi yango ye moko ‘te “mpo na yango, na mipesi o bozindo mpenza, na ntina ya kobakisa boyebi, kokebisa mpe kobatela bilenge”.
Koyeba bilembo ya makama
Mpo na oyo nyonso akutani na yango to na eksperiansi na ye, amonisi bilembo biyiké biye bisengeli kokebisa na makambo ya mombongo ya bato: «Ya liboso, bilaka oyo ezali kitoko mpenza mpo na kozala ya solo, kasi manso mazali lokutà ; mosala oyo ezali kofuta malamu, kasi ezali na boyokani to kontra ya polele te, oyo ezali kosenga te ‘te moto azala na makoki, mpe oyo ezali kopesa nzela ‘te moto alongwa na mosala noki». Eloko mosusu oyo abeteli nsete ezali : «bozangi bosolo ya recruteur, kozanga mikanda officiel, mpe bozangi kozala na mwa banso ezali kolopela mopesi-mosala, mpe na nsuka, kozanga koyebi esika wapi okosala, ekozala lolenge kani». Bilembo bisusu, kozanga koyeba, boni boni bazali kofuta yo ; nà mpe kopekisa bino ‘te moto mosusu ayeba lisolo wàna te, ata kutu libota lya yo moko. Bilembo bisusu ya koloba ezali mingi, lokola : Kobotolo bino mikandà, mingi mpenza bapasseports, kopekisa bino na kobima na ndaku bofandi.
«Bozali bino moko té», nde liyebisi Bukuru alingi kopesa na baye bazwi likamà ya mombongo ya koteka to konyokolo bato (traite)
Na baye bazali nayino na boombo, mpe mazwami na motambo, ya likambo liye, Bukuru Claude azali na liyebisi sé moko : «bandeko basi mpe babali, bozali bino moko te, bomoi bwa bino ezali na motuya makasi, atako likambo lyango epesi elikya ya kosuka té. Esengeli boyeba te, ezali nà bato bazali na makoki ya kosalisa bino. Boluka mpe bomeka koloba, wanà nde ekozala, etambe ya liboso mp ona kozwa bonsomi». Na nsuka, asengi na masanga ya bato banso ‘te: ezala bakonzi, bato ba mboka mpe bilenge, “Ezali mokumba ya bato banso ya kobongola mpasi na libateli mpe bobangi na elikya”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.