Luka

Bansango ya ngambo ya Orient – 26 Febwàli 2026

Venerable Béchara Abou Mrad, azali na nzela ya kokóma Mwa-esengo. Likamwisi moko esalemaki na bolobeli bwa Sàngó Melkite ya mboka Liban.

Pàpa Léon ya XIV andimi likamwisi oyo epesamaki na sàngó moko ya Liban Béchara Abou Mrad, o mokolo mwa poso, 21 Febwàli. Efungola bongo nzela mpo na kobenga ye Mwa-esengo, eteni ya nsuka, liboso lya kokóma mosantu.

Abotamaki na Zahlé na mobu 1853, Béchara Abou Mrad akotaki ut’o bolenge bwa ye na Basiliens ya Saint-Sauveur na Saïda. Akulaki Bonganga ya Lingomba ya Katolike ya Grèce na mobu 1883, ayebanaki mpo ya motema bolingi bwa ye, molende mwa ye oyo ezalaki lokola ya bantómà mpe bomoi bwa molimo o mozindo. Azalaki Mokengeli mpate malamu, oyo amipesaki na mosala mwa Nzambe mpe azalaki moto ayebi komikitisa. Azalaki kokende na lingomba mpo na kosalisa bato ntubela, tee kino akufaki na mobù 1930.

Béchara Abou Mrad ayebanaki lokola moto mwa lokumu banda 2009 mpo na mabongi malamu azalaki na yango mpe misala mya ye ya makasi, eklezia endimi lelo likamwisi oyo ezwamaki na lisungi to bolobeli bwa ye. Na 2009, mwasi moko oyo azalaki na maladi ya osteoarthritis na mabolongo na ye ut’o mibu tuku mibale na mitano koleka (plus de 25 ans). Mpe Na kiti na ye ya bibosono, Tata Béchara azali kobondela na butu moko ya mpasi makasi. Mokolo moye molandaki, abandaki kotambola. Kozanga lisalisi. Koyoka mpasi te. Mpe azongeli bomoi na ye ya malamu, lolenge elongobani

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

26 sánzá ya míbalé 2026, 10:13